Publicidade

Lamentações 2

Yawe apesi Yelusalemi etumbu

1 Tala ndenge nini Nkolo azipi Siona, mboka kitoko,

na lipata ya kanda na Ye :

akweyisi lokumu ya Isalaele,

wuta na likolo kino na se ;

na mokolo ya kanda na Ye,

abosanaki enyatelo makolo na Ye !

2 Na kozanga mawa, Nkolo abebisi bandako nyonso

ya Jakobi ;

na kanda na Ye, akweyisi bandako batonga makasi

ya Yuda, mwasi kitoko,

mpe asambwisi bokonzi mpe bakambi na yango.

3 Na kanda makasi na Ye,

abukaki Isalaele maseke nyonso,

alongolaki loboko na Ye ya mobali

na likolo na yango

tango monguna na bango azalaki kopusana ;

apelisaki moto kati na mokili ya Jakobi

lokola moto makasi oyo etumbaka biloko nyonso

na bangambo na yango nyonso.

4 Lokola moyini, abendi tolotolo na Ye ;

lokola monguna, asemboli loboko na Ye

mpe abomi nyonso oyo ezalaki kosepelisa miso ;

mpe asopi kanda makasi na Ye lokola moto

na likolo ya bandako ya kapo ya Siona, mboka kitoko.

5 Yawe akomi lokola monguna :

abebisi mokili ya Isalaele,

abebisi bandako nyonso ya mokonzi ya Isalaele,

abuki bandako na yango batonga makasi,

atondisi matanga mpe kolela

kati na Yuda, mboka kitoko.

6 Abebisi lopango na ye

ndenge babebisaka lopango ya elanga,

abebisi esika na bango ya mayangani.

Na kanda makasi na Ye,

Yawe asali ete Siona abosana

bafeti oyo ekatama mpe mikolo ya Saba ;

mpe apameli mokonzi mpe Nganga-Nzambe.

7 Yawe abwaki etumbelo na ye,

asundoli esika na ye ya bule

mpe akabi na maboko ya monguna

bamir mpe bandako ya mokonzi na yango.

Bato bagangi makasi kati na Tempelo ya Yawe

ndenge bagangaka na mokolo ya feti oyo ekatama.

8 Yawe akani kobuka bamir

oyo ezingeli Siona, mboka kitoko ;

atandi singa ya komekela molayi

mpe azongisi loboko na Ye na sima te

mpo na kobebisa ;

abebisi bamir oyo ebatelaka engumba mpe bamir mosusu ;

bongo akweyisi yango nyonso.

9 Bikuke na yango ezindi na mabele ;

abuki-buki mpe abebisi banzete oyo

bakangelaka bikuke yango.

Mokonzi mpe bakambi na ye bakei

na bowumbu kati na bikolo,

Mobeko ezali lisusu te,

mpe basakoli na ye bazali kozwa lisusu te

bimoniseli kowuta na Yawe.

10 Bampaka ya Siona, mboka kitoko,

bavandi kimia na mabele,

bamisopeli putulu na mito na bango mpe balati basaki ;

bongo bilenge basi ya Yelusalemi bafukami,

bilongi na bango kino na se.

11 Miso na ngai elembi kobimisa mpinzoli,

nazali komitungisa,

libumu na ngai ezali kobaluka,

motema na ngai ezali kotungisama

mpo ete bato na ngai babebisami,

mpo ete bana mpe bana oyo bazali komela mabele

balembi-lembi banzoto na balabala ya engumba.

12 Bazalaki koloba na bamama na bango :

« Epai wapi tokoki kozwa ble mpe masanga ya vino ? »

Ndenge bazalaki kokweya-kweya

lokola bato oyo bazoki bapota minene

na babalabala ya engumba,

ndenge wana mpe bazalaki kokufa

na maboko ya bamama na bango.

13 Naloba lisusu nini mpo na yo ?

Nakokanisa yo na nani,

Yelusalemi, mboka kitoko ?

Nakokanisa yo na nani

mpo ete nakoka kobondisa yo,

Siona, mboka kitoko ?

Pota na yo ezali monene lokola ebale monene ;

nani akoki kobikisa yo ?

14 Bimoniseli ya basakoli na yo ezalaki

ya lokuta mpe ya pamba ;

balakisaki yo masumu na yo te

mpo ete okende na bowumbu te :

masakoli oyo bazwelaki yo

ezalaki ya mabe mpe ya lokuta !

15 Bato nyonso oyo bolekelaka na nzela na yo

bazali kobeta maboko na kokamwa,

bazali kobeta piololo mpe koningisa mito

mpo na Yelusalemi, mboka kitoko :

« Boni, ezali solo engumba oyo bazalaki kobenga

kitoko ekoka mpe esengo ya mokili mobimba ? »

16 Banguna na yo nyonso bafungoli minoko na bango

mpo na kotiola yo,

bazali koseka yo mpe kolia minu na bango ;

bongo bazali koloba :

« Tomeli ye ! Tala mokolo oyo tozalaki kozela !

Tokomi penza na mokolo yango mpe tomoni yango ! »

17 Yawe asali makambo oyo abongisaki,

akokisi liloba na Ye,

nyonso oyo aloba wuta kala :

akweyisi yo na mawa te,

apesi nzela na banguna na yo ete balonga yo,

atomboli liseke ya banguna na yo.

18 Mitema ya bato ezali koganga epai na Nkolo.

Oh mir ya Siona, mboka kitoko,

tika ete mpinzoli na yo ebima lokola ebale,

butu mpe moyi,

mpe miso na yo ekangama te !

19 Telema, ganga na butu

ndenge bakengeli basalaka na butu ;

sopa motema na yo lokola mayi, na miso ya Nkolo,

tombola maboko na yo epai na Ye

mpo na bomoi ya bana na yo,

oyo bazali kokufa nzala na babalabala nyonso.

20 Oh Yawe, tala mpe mona !

Nani oyo osalela makambo ya boye ?

Boni, basi basengelaki solo kolia

mbuma ya mabumu na bango

to bana oyo bango moko babokoli ?

Boni, basengelaki solo koboma mosakoli mpe Nganga-Nzambe

kati na Esika ya bule ya Nkolo ?

21 Bibembe ya bilenge mpe ya mikolo

elali-lali na babalabala ;

basali na ngai ya mibali mpe ya basi bakufi na mopanga !

Obomi bango na mokolo ya kanda na Yo ;

obomi bango na mawa te !

22 Ndenge obengisaka bato na mokolo ya feti,

ndenge wana mpe obengisaki pasi

wuta na bangambo nyonso mpo na kosala ngai mabe.

Na mokolo ya kanda ya Yawe,

moto moko te abikaki to atikalaki na bomoi.

Monguna na ngai abebisi bato

oyo nazalaki kobokola mpe kobatela.

Veja também

Publicidade
Lamentações
Ver todos os capítulos de Lamentações
Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-06-15_21-32-39-