Espírito
O espírito humano é a parte mais profunda do nosso ser — onde Deus habita, onde a fé se ancora e de onde brota a verdadeira adoração. A Bíblia nos chama a viver pelo Espírito.
A natureza do espírito
O espírito está pronto, mas a carne é fraca. A batalha entre carne e espírito é constante e exige vigilância.
Bosenzela mpe bosambela mpo ete bokweya te kati na komekama. Molimo ezalaka na posa makasi ya kosala malamu, kasi nzoto ezalaka na bolembu.
« Esengo na babola na molimo,
pamba te Bokonzi ya Likolo ezali mpo na bango !
Pamba te baposa ya bomoto ebundisaka baposa ya Molimo, mpe baposa ya Molimo ebundisaka baposa ya bomoto. Nyonso mibale ebundisanaka mpo ete bolonga te kosala makambo oyo bolingi kosala.
Boye, tala makambo oyo nazali koloba na bino : Botambola kolanda baposa ya Molimo, mpe bokokokisa te baposa ya bomoto na bino.
Kasi mbuma ya Molimo ezali : bolingo, esengo, kimia, kokanga motema, bondeko, kosala bolamu, kondima, boboto mpe komikanga. Mibeko epekisaka te makambo ya lolenge oyo.
Lokola tozali kobika bomoi na biso na nzela ya Molimo, totambola mpe na lisungi ya Molimo.
Baposa ya nzoto ememaka na kufa, kasi baposa ya Molimo ememaka na bomoi mpe na kimia.
O Espírito de Deus em nós
Vosso corpo é templo do Espírito Santo. Deus fortalece com poder no homem interior pelo seu Espírito.
Boyebi te ete nzoto na bino ezali Tempelo ya Molimo Mosantu oyo azali kati na bino, oyo bozwaki kowuta na Nzambe ? Mpe boyebi te ete bozali ya bino moko te ? Bosikolamaki na motuya makasi penza. Boye, bopesa Nzambe nkembo kati na banzoto na bino.
Kasi moto oyo asangani na Nkolo azali moko na Ye kati na Molimo.
Nani kati na bato ayebi makanisi ya moto, soki kaka molimo oyo ezali kati na moto yango te ? Ndenge moko mpe moko te ayebi makanisi ya Nzambe, longola kaka Molimo na Ye.
Boye, nasala nini ? Nakosambela na molimo na ngai, kasi nakosambela mpe na mayele na ngai ; nakoyemba na molimo na ngai, kasi nakoyemba mpe na mayele na ngai.
mpo na kobondela ete alendisa bino na nguya, mpo na bolamu ya bomoto na bino ya kati, na nzela ya Molimo na Ye kolanda bomengo ya nkembo na Ye, mpo ete Klisto avanda kati na mitema na bino na nzela ya kondima. Nabondelaka mpe mpo ete bozwa misisa mpe bolenda kati na bolingo,
mpe nasengaka ete Nzambe ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, Tata ya nkembo, apesa bino Molimo ya bwanya mpe ya emoniseli mpo ete bokoka koyeba Ye malamu.
Solo, bozwaki te Molimo oyo akomisaka bino bawumbu mpo ete bozala na kobanga, kasi bozwaki Molimo oyo akomisaka bino bana na Nzambe, mpe ezali na nzela ya Molimo yango nde togangaka : « Tata ! » Molimo Ye moko atatolaka na molimo na biso ete tozali bana na Nzambe.
Molimo Ye moko atatolaka na molimo na biso ete tozali bana na Nzambe.
Solo, bozwaki te Molimo oyo akomisaka bino bawumbu mpo ete bozala na kobanga, kasi bozwaki Molimo oyo akomisaka bino bana na Nzambe, mpe ezali na nzela ya Molimo yango nde togangaka : « Tata ! »
Kasi soki Klisto azali kati na bino, atako nzoto na bino ekokufa mpo na lisumu, kasi Molimo azali bomoi kati na bino, pamba te bokoma bato ya sembo.
Pamba te bato oyo batambolisamaka na Molimo ya Nzambe bazali bana na Nzambe.
Ndenge moko mpe Molimo ayaka kosunga biso kati na bolembu na biso ; pamba te toyebi te kosambela na lolenge oyo esengeli, kasi Molimo Ye moko abondelaka mpo na biso na maloba oyo moto akoki koloba te.
mpo na oyo etali mosala, bozalaka bagoyigoyi te ; mpo na oyo etali Molimo, bopelaka na yango makasi ; mpo na oyo etali Nkolo, bozalaka bawumbu ya malamu ;
Tika ete Nzambe oyo apesaka elikya atondisa bino na esengo nyonso mpe na kimia nyonso kati na kondima, mpo ete botonda na elikya na nzela ya nguya ya Molimo Mosantu.
Vida no Espírito
Deus é Espírito e importa que os que o adoram o adorem em espírito e em verdade. O Espírito vivifica e transforma.
Nzambe azali Molimo ; esengeli ete bato oyo bagumbamelaka Ye bagumbamela Ye kati na Molimo mpe kati na solo.
Kasi tango ezali koya mpe esili na yango kokoka, tango oyo bagumbameli ya solo bokogumbamela Tata, kati na Molimo mpe kati na solo ; pamba te Tata alukaka bato oyo bogumbamelaka Ye na lolenge wana. Nzambe azali Molimo ; esengeli ete bato oyo bagumbamelaka Ye bagumbamela Ye kati na Molimo mpe kati na solo.
Mpe biso nyonso oyo bilongi na biso ezipama te, biso oyo tomonisaka nkembo ya Nkolo, tozwaka elilingi na Ye kati na nkembo oyo kongenga na yango ebakisamaka se kobakisama. Nyonso wana ezali mosala ya Nkolo oyo azali Molimo.
Balingami na ngai, lokola tozali na bilaka ya lolenge oyo, tomipetolaka na nyonso oyo ekomisaka nzoto mpe molimo mbindo, mpo na kotambola na bomoi ya bosantu, kati na kotosa Nzambe.
Pamba te Molimo oyo Nzambe apesa biso akomisaka biso te bato ya kobanga-banga, kasi apesaka biso makasi, bolingo mpe mayele.
Pamba te Molimo oyo Nzambe apesa biso akomisaka biso te bato ya kobanga-banga, kasi apesaka biso makasi, bolingo mpe mayele.
Nayebi solo ete, na nzela ya mabondeli na bino mpe ya lisungi ya Molimo ya Yesu-Klisto, makambo oyo ekomeli ngai ekosuka na kokangolama na ngai.
Tika ete ngolu ya Nkolo Yesu-Klisto ezala elongo na molimo na bino !
Promessas do Espírito
Derramarei o meu Espírito sobre toda a carne. O Espírito revela, guia e capacita os filhos de Deus.
Soki boyoki makebisi na Ngai,
nakosopela bino Molimo na Ngai
mpe nakososolisa bino maloba na Ngai.
Nzela nyonso ya moto emonanaka peto na miso na ye,
kasi Yawe nde amekaka mitema.
Lolendo eyaka liboso ya kobebisama,
mpe komimatisa eyaka liboso ya kokweyisama.
Kozala moto ya komikitisa mpe kozala elongo na bato bakelela
ezali malamu koleka kokabola bomengo ya bitumba
elongo na bato ya lolendo.
Moto oyo akangaka motema azali makasi koleka elombe,
mpe moto oyo ayebi komikanga azali makasi
koleka moto oyo abotolaka bingumba.
Molimo ya moto ezali mwinda oyo Yawe apesi ye ;
esosolaka bozindo nyonso ya motema ya moto.
Alobaki na ngai :
— Tala liloba oyo Yawe alobi na Zorobabeli : « Ezali na makasi to na nguya na yo te, kasi na nguya na Ngai, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
Molimo ya Nkolo Yawe azali likolo na ngai,
pamba te Yawe apakoli ngai mafuta
mpo na kosakola sango malamu epai ya babola,
kobikisa bato oyo mitema na bango esili kozoka,
kosakola bonsomi epai ya bawumbu
mpe kobimisa bakangami na boloko ;
Nakopesa bango motema ya sika mpe nakotia kati na bango molimo ya sika ; nakolongola kati na bango motema ya libanga mpe nakopesa bango motema ya mosuni, mpo ete balanda bikateli na Ngai mpe batosa mibeko na Ngai. Bakozala bato na Ngai, mpe Ngai nakozala Nzambe na bango.
Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakotia pema kati na bino mpe bokozwa lisusu bomoi.
Cuidar do espírito
Cria em mim um coração puro e renova dentro de mim um espírito reto. O espírito quebrantado Deus não rejeita.
Sepelisa ngai mpe yokisa ngai nsayi na motema ;
mpe mikuwa na ngai oyo obukaki
ekosepela makasi.
Kotala lisusu masumu na ngai te,
mpe longola bambeba na ngai nyonso.
Oh Nzambe, mpo na ngai, kela motema ya peto ;
mpe kati na ngai, yeisa molimo sika mpe elenda.
Nkolo, fungola bibebu na ngai,
mpe monoko na ngai ekokumisa Yo.
Tango bato ya sembo babelelaka,
Yawe ayokaka mpe akangolaka bango
na pasi na bango nyonso.
Botia elikya te na bakambi
to na bato oyo bazangi makoki ya kobikisa.
Soki bakufi, bazongaka na mabele,
mpe, mbala moko, mabongisi na bango elimwaka.
Pamba te Liloba na Nzambe ezali na bomoi mpe na nguya, ekotaka koleka kutu mopanga oyo ezali na minu na bangambo nyonso mibale, ekomaka kino kokabola elimo mpe molimo, mikuwa mpe mafuta oyo ezalaka kati na mikuwa, mpe esosolaka malamu makanisi mpe mikano ya motema ya moto.
Ndenge nzoto oyo ezangi pema ezali ya kokufa, ndenge wana mpe kondima oyo ezangi misala ezali ya kokufa.
Balingami na ngai, bondimaka te bato nyonso oyo babetaka tolo mpo na koloba ete batondisami na Molimo ya Nzambe ; kasi bomeka bango mpo na koyeba soki bazali penza ya Nzambe, pamba te basakoli ebele ya lokuta basili kopanzana na mokili.
Tala ndenge nini toyebaka ete tozali kati na Nzambe, mpe Nzambe azali kati na biso : ezali na nzela ya Molimo na Ye, oyo apesa biso.
Bongo soki bino bato oyo bozali kutu mabe boyebi kopesa na bana na bino biloko ya malamu, ndenge nini Tata oyo azali na Likolo apesa te Molimo Mosantu epai ya bato oyo basengaka Ye !
Bamonaki biloko moko lokola ndemo ya moto kokabwana mpe kovanda na moto ya moko na moko kati na bango. Bango nyonso batondisamaki na Molimo Mosantu mpe babandaki koloba na nkota mosusu, ndenge Molimo azalaki kolakisa bango.
Na ebandeli, Nzambe akelaki Likolo mpe mokili. Mokili ezalaki na lolenge te mpe ezalaki pamba. Molili ezalaki na likolo ya mozindo ; mpe Molimo ya Nzambe azalaki kopepa na likolo ya mayi.
Nzokande, kati na moto, ezali nde molimo,
ezali pema ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso
nde epesaka moto boyebi.
Solo, kanisa Mokeli na yo liboso ete
singa ya palata ekatana, kopo ya wolo efinana,
eloko ya mayi ebukana na libulu ya mayi,
mpe mashini oyo babendelaka mayi na libulu ebukana ;
liboso ete putulu ezonga na mabele
epai wapi ewutaki,
mpe pema ezonga epai ya Nzambe oyo apesaki yango.
Mokolo moko, tango nazalaki ya kolala na mbeto na ngai, nalotaki ndoto moko oyo ebangisaki ngai makasi ; bililingi mpe bimoniseli moko eyaki na makanisi na ngai mpe etungisaki molimo na ngai. Boye, napesaki mitindo epai ya bato ya bwanya nyonso ya Babiloni ete baya liboso na ngai mpo na kolimbolela ngai ndoto yango.