Fé
A fé é o fundamento da vida cristã. Sem fé é impossível agradar a Deus. Pela fé somos salvos, vivemos, vencemos o mundo e recebemos as promessas de Deus.
O que é a fé
A fé é a certeza daquilo que esperamos e a prova das coisas que não vemos. Ela é o alicerce de toda a vida espiritual.
Nzokande kondima ezali ndanga ya kozwa biloko oyo tozali kolikya epai ya Nzambe, mpe kobika lokola nde tosili kozwa biloko yango atako tozali komona yango te.

Nzokande, moto moko te akoki kosepelisa Nzambe soki azangi kondima, pamba te moto oyo azali kopusana pene ya Nzambe asengeli kondima ete Nzambe azali mpe afutaka bato oyo balukaka Ye.

Mpo na kondima, Sara mpe azwaki makoki ya komema zemi atako mibu na ye ya kobota esilaki koleka wuta kala, pamba te andimaki ete Ye oyo apesaki ye elaka akosaka te.
Moto na ngai ya sembo akobika na nzela ya kondima ;
kasi soki azongi sima, nakosepela na ye te.
Tika ete miso na biso etalaka kaka Yesu oyo azali Mobandisi mpe Mokokisi ya kondima ; pamba te, na esika ya esengo oyo ebongisama mpo na Ye, andimaki kokufa na ekulusu mpe koyoka soni makasi, mpe avandi sik’oyo na ngambo ya loboko ya mobali ya Kiti ya Bokonzi ya Nzambe.
Salvos pela fé
Pela graça sois salvos, mediante a fé. O justo viverá pela fé — essa é a declaração central do evangelho.
Pamba te bobikisami nde na ngolu, na nzela ya kondima—mpe yango ewuti na bino te, kasi ezali nde likabo kowuta na Nzambe— ezali na nzela ya misala na bino te mpo ete moko te akoka komikumisa.
Na likolo na nyonso, bobakisaka kondima lokola nguba oyo bokoboma na yango moto ya makonga nyonso oyo Satana akobwakaka.
Na likolo na nyonso, bobakisaka kondima lokola nguba oyo bokoboma na yango moto ya makonga nyonso oyo Satana akobwakaka.
mpo na kobondela ete alendisa bino na nguya, mpo na bolamu ya bomoto na bino ya kati, na nzela ya Molimo na Ye kolanda bomengo ya nkembo na Ye, mpo ete Klisto avanda kati na mitema na bino na nzela ya kondima. Nabondelaka mpe mpo ete bozwa misisa mpe bolenda kati na bolingo,
Pamba te Sango Malamu yango emonisaka biso bosembo ya Nzambe, oyo ezwamaka na nzela ya kondima, wuta na ebandeli kino na suka, kolanda ndenge ekomama : « Moto ya sembo akobika na nzela ya kondima. »
Yango wana, lokola tokomi bato ya sembo na nzela ya kondima, tozali na kimia elongo na Nzambe na nzela ya Nkolo na biso, Yesu-Klisto
Nzokande, soki moto asali mosala te, kasi andimeli Nzambe oyo atangaka bato ya masumu lokola bato ya sembo, kondima na ye ekokomisa ye moto ya sembo.
pamba te kondima oyo ekomisaka sembo ewutaka na motema, mpe litatoli oyo ememaka na lobiko ebimaka nde na monoko.
Boye, kondima ewutaka na maloba oyo toyokaka, mpe maloba oyo toyokaka ewutaka na Liloba ya Klisto.
Boye, kondima ewutaka na maloba oyo toyokaka, mpe maloba oyo toyokaka ewutaka na Liloba ya Klisto.
Boyamba malamu moto oyo alenda te na kondima, na kotiana lisusu tembe te na tina na makanisi.
Kasi moto oyo alie, wana motema na ye ezali kopamela ye, asili kokweyisama na miso ya Nzambe, pamba te asali te kolanda kondima na ye ; mpe nyonso oyo esalemaka te kolanda kondima ezali lisumu.
Tika ete Nzambe oyo apesaka elikya atondisa bino na esengo nyonso mpe na kimia nyonso kati na kondima, mpo ete botonda na elikya na nzela ya nguya ya Molimo Mosantu.
Fé que vence
Esta é a vitória que venceu o mundo: a nossa fé. A fé remove montanhas e abre caminhos impossíveis.
pamba te mwana nyonso ya Nzambe alongaka mokili, mpe elonga oyo elongaki mokili ezali : kondima na biso.

Yesu alobaki na ye :
— Olobi nini : « Soki okoki ! » Nyonso ekoki kosalema mpo na moto oyo azali na kondima.
Yesu alobaki na ye :
— Olobi nini : « Soki okoki ! » Nyonso ekoki kosalema mpo na moto oyo azali na kondima.
Yesu alobaki na bayekoli na Ye :
— Bozala na kondima kati na Nzambe.
Yango wana nazali koloba na bino : eloko nyonso oyo bokosenga wana bozali kosambela, bondima ete bosili kozwa yango mpe bokomona yango kokokisama.
Yesu alobaki na ye :
— Kende, kondima na yo ebikisi yo.
Mbala moko, akomaki komona mpe alandaki Yesu.
Fé e confiança
Confia no Senhor de todo o coração. A fé não depende de circunstâncias — ela se apoia na fidelidade de Deus.
Ndimela Yawe na motema na yo mobimba,
mpe kotia motema te na mayele na yo.
Yebaka Ye na banzela na yo nyonso,
mpe Ye akokomisa yango alima.
Naponaki nzela ya bosolo ;
natambolaka kolanda mibeko na Yo.
pamba te totambolaka kolanda kondima, kasi kolanda miso te.
pamba te totambolaka kolanda kondima, kasi kolanda miso te.
mpo ete moboko ya kondima na bino ezala te bwanya ya bomoto, kasi ezala nde nguya ya Nzambe.
Soki nazali na likabo ya kosakola, ya kososola mabombami nyonso mpe ya koyeba makambo nyonso ; mpe soki nazali na kondima oyo ekoki kolongola bangomba, kasi nazangi bolingo, nazali pamba.
Bosenzelaka, botelemaka ngwi kati na kondima, boyikaka mpiko, bozalaka makasi.
Pedidos pela fé
Se tiverdes fé como um grão de mostarda, nada vos será impossível. Jesus elogiou a grande fé dos que o buscaram.
Yesu azongiselaki bango :
— Ezali mpo ete bozali na kondima moke. Nazali koloba na bino penza ya solo : soki kondima na bino ezalaki lokola mbuma ya mutarde, bokokaki koloba na ngomba oyo : « Longwa awa, kende kuna ; » mpe ekokende penza. Eloko moko te ekoki kozanga kosalemela bino. [

— Nazali koloba na bino penza ya solo : soki bozali na kondima mpe botie tembe te, bokoki kaka te kosala makambo oyo Ngai nasali na nzete ya figi oyo, kasi bokoki mpe koloba na ngomba wana : « Longwa wana mpe mibwaka na ebale, » yango ekosalema solo.
Soki bozali na kondima, bokozwa nyonso oyo bokosenga kati na losambo.
Bongo Yesu alobaki na ye :
— Mwasi, kondima na yo ezali monene ! Tika ete esalemela yo ndenge ezali posa na yo !
Mpe kaka na tango wana, mwana na ye ya mwasi abikaki.
Bongo asimbaki miso na bango mpe alobaki :
— Tika ete esalemela bino kolanda kondima na bino !
Bamemelaki Ye ebosono moko alala na tsipoyi. Tango Yesu amonaki kondima na bango, alobaki na ebosono yango :
— Mwana na Ngai, yika mpiko ! Masumu na yo elimbisami.
Fé como virtude
Segue a justiça, a fé, o amor, a paz. Combati o bom combate, completei a carreira, guardei a fé.
Kasi yo, moto na Nzambe, kima makambo nyonso wana ; luka nde bosembo, botosi kati na makambo ya Nzambe, kondima, bolingo, molende mpe boboto.
Kasi yo, moto na Nzambe, kima makambo nyonso wana ; luka nde bosembo, botosi kati na makambo ya Nzambe, kondima, bolingo, molende mpe boboto.
Nabundi etumba na ngai malamu, nakomi na suka ya lisano na ngai ya kokima mbangu, nabateli kondima.
soki tozangi kondima,
Ye azalaka kaka Moyengebene,
pamba te akoki komiwangana te.
Tobosanaka te liboso ya Nzambe, Tata na biso, misala ya kondima na bino, misala ya bolingo na bino mpe molende na bino, oyo ewuti na elikya monene oyo bozali na yango kati na Nkolo na biso, Yesu-Klisto.
Bandeko, sango ya kondima na bino elendisi biso makasi, kati na pasi mpe minyoko nyonso oyo tozali komona ;
mpo ete bazala na elikya ya bomoi ya seko oyo Nzambe, Ye oyo akosaka te, alakaki biso wuta kala, liboso ya ebandeli ya tango,
Pamba te, tala liloba oyo Nkolo Yawe,
Mosantu ya Isalaele, alobi :
« Ekozala kati na kobongola mitema mpe kimia
nde bokozwa lobiko na bino ;
ekozala na nzela ya kimia mpe ya elikya
nde bokozwa makasi na bino ;
kasi bino, bolingi bongo te.
Fé viva
A fé sem obras é morta. Peça com fé, sem duvidar. A fé nos conecta com o poder de Deus e produz frutos eternos.
Ndenge nzoto oyo ezangi pema ezali ya kokufa, ndenge wana mpe kondima oyo ezangi misala ezali ya kokufa.
Pamba te boyebi malamu ete komekama ya kondima na bino ebotaka kokanga motema.
Pamba te boyebi malamu ete komekama ya kondima na bino ebotaka kokanga motema.
Soki moko kati na bino azangi bwanya, tika ete asenga yango epai ya Nzambe oyo akopesa ye yango ; pamba te Nzambe apesaka moto nyonso na motema malamu mpe na kopamela te. Kasi asengeli kosenga na kondima, na kotia tembe te ; pamba te moto oyo atiaka tembe azali lokola mbonge ya ebale oyo mopepe ezali koningisa mpe kobwaka epai na epai. Moto ya ndenge wana atia motema te ete akoki kozwa eloko kowuta na Nkolo : azali moto ya mitema mibale, moto oyo akangamaka na likanisi moko te na nyonso oyo asalaka.
Kasi asengeli kosenga na kondima, na kotia tembe te ; pamba te moto oyo atiaka tembe azali lokola mbonge ya ebale oyo mopepe ezali koningisa mpe kobwaka epai na epai.
Bosepelaka na lobiko yango, atako bosengeli sik’oyo kotungisama mpo na mwa tango moke na nzela ya komekama ya lolenge nyonso. Komekama yango eyei mpo na kotalisa bosolo ya kondima na bino mpe kosala ete bokoka kozwa masanzoli, nkembo mpe lokumu tango Yesu-Klisto akomonana. Boni, moto epetolaka wolo te ? Nzokande kondima na bino ezali na motuya koleka wolo oyo ebebaka.
Bolingaka Yesu-Klisto atako bomona Ye te. Atako bozali mpe kaka komona Ye te sik’oyo, bozali kondimela Ye mpe botondi na esengo ya nkembo oyo moto akoki kolimbola te, pamba te bozali kozwa lifuti ya kondima na bino : lobiko ya bomoi na bino.

pamba te bozali kozwa lifuti ya kondima na bino : lobiko ya bomoi na bino.
Botelemelaka ye mpe boyikaka mpiko kati na kondima, pamba te boyebi ete bandeko na bino, oyo bapalangana kati na mokili bazali mpe komona bapasi lokola bino.
Promessas da fé
Quem crer terá a vida eterna. A fé abre as portas do impossível e nos dá acesso às promessas de Deus.
Pamba te Nzambe alingaki mokili mingi penza, yango wana apesaki Mwana na Ye se moko, mpo ete moto nyonso oyo akondima Ye akufa te kasi azwa bomoi ya seko.
Moto nyonso oyo andimi Mwana azali na bomoi ya seko ; nzokande moto oyo aboyi kondima Mwana akozwa bomoi yango te, kasi azalaka kaka na se ya etumbu ya Nzambe.
Yesu azongiselaki bango :
— Ngai nazali lipa oyo epesaka bomoi. Moto nyonso oyo akoya epai na Ngai akoyoka lisusu nzala te, mpe moto nyonso oyo akondima Ngai akoyoka lisusu posa ya mayi te.
Yesu alobaki na ye :
— Ngai nazali lisekwa mpe bomoi. Moto nyonso oyo andimi Ngai akozala na bomoi, atako akufi. Mpe moto nyonso oyo andimi Ngai, wana azali na bomoi, akotikala kokufa te. Ondimi yango ?
Yesu alobaki na ye :
— Nalobaki na yo te ete soki ondimi, okomona nkembo ya Nzambe ?
Pamba te Nzambe alembanaka eloko te.
boye ezali lisusu ngai te moto nazali kobika, kasi ezali Klisto nde azali kobika kati na ngai. Bomoi oyo nazali kobika sik’oyo kati na nzoto na ngai lokola moto, nazali kobika yango na nzela ya kondima kati na Mwana na Nzambe, oyo alingaki ngai mpe amikabaki mpo na ngai.
Boye bino nyonso bozali bana na Nzambe na nzela ya kondima kati na Yesu-Klisto ; pamba te bino nyonso oyo bozwaki libatisi kati na Klisto bolataki nde Klisto.
Kasi biso, na lisungi ya Molimo, tozali kozela na elikya kokoma sembo na nzela ya kondima.
Nayebi solo ete, na nzela ya mabondeli na bino mpe ya lisungi ya Molimo ya Yesu-Klisto, makambo oyo ekomeli ngai ekosuka na kokangolama na ngai.
Nzambe asepeli kolakisa bango bomengo ya nkembo, oyo evandi kati na mabombami ya mabongisi na Ye mpo na Bapagano. Mabombami yango ezali : Klisto kati na bino, elikya ya nkembo.
Ata soki abomi ngai, nakozala kaka na elikya na Ye,
nakobundela solo nzela na ngai liboso na Ye.