Filhos
Os filhos são herança do Senhor — bênção e responsabilidade sagrada. A Bíblia orienta sobre a criação dos filhos com amor, disciplina e instrução nos caminhos de Deus.
Herança do Senhor
Os filhos são herança do Senhor e o fruto do ventre é seu galardão. Bem-aventurado o homem que enche deles a sua aljava.
Bana bazali libula kowuta na Yawe,
mpe kobota bana ezali lifuti.
Ndenge makonga ezali kati na maboko ya mobundi bitumba,
ndenge wana mpe bana oyo moto aboti
na bolenge na ye bazali.
Esengo na moto oyo atondisi makonga
kati na ebombelo na ye ya makonga !
Akokufa soni ata moke te
tango akosamba elongo na banguna na ye
na ekuke ya engumba.
Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe.
Esengo na moto oyo atosaka Yawe
mpe alandaka banzela na Ye !
Oliaka mbuma ya mosala na Yo ;
ozali moto ya esengo mpe ozali na bofuluki.
Kati na ndako na yo,
mwasi na yo azali lokola nzete ya vino
oyo ebotaka bambuma ebele ;
bana na yo bazali lokola bankona ya nzete ya olive
zingazinga ya mesa na yo.
Ezali ndenge wana nde Yawe apambolaka
moto oyo atosaka Ye.
Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe.
Esengo na moto oyo atosaka Yawe
mpe alandaka banzela na Ye !
Oliaka mbuma ya mosala na Yo ;
ozali moto ya esengo mpe ozali na bofuluki.
Kati na ndako na yo,
mwasi na yo azali lokola nzete ya vino
oyo ebotaka bambuma ebele ;
bana na yo bazali lokola bankona ya nzete ya olive
zingazinga ya mesa na yo.
Bana mibali na biso bazali lokola milona,
bazali kokola malamu wuta na bomwana na bango ;
bana basi na biso bazali lokola bililingi kitoko
oyo batoboli na bamir ya ndako ya mokonzi.
Bana na ye bakozala bato na nguya
kati na mokili ;
ekeke ya bato ya sembo ekopambolama.
Nzambe apambolaki bango mpe alobaki na bango : « Bobotana, bokoma ebele, botondisa mokili mpe bobongola yango. Bokonza bambisi ya bibale, bandeke ya likolo, bikelamu oyo etambolaka na libumu mpe banyama nyonso ya mike-mike. »
Mabota na bino ekopambolama ; milona na bino mpe bibwele na bino : bangombe na bino, bameme mpe bantaba na bino ekopambolama.
Bokopambolama koleka bato nyonso. Mobali moko te to mwasi moko te akozanga bana, mpe ebwele na yo moko te ekozanga bana.
Instruir e disciplinar
Instrui a criança no caminho em que deve andar, e quando envelhecer não se desviará dele. Disciplina é amor em ação.
Lakisa mwana nzela oyo asengeli kotambola wuta na bomwana na ye ;
ezala tango akokoma mokolo, akobunga yango te.
Motema ya mwana moke ezalaka na bozoba,
bongo fimbu ya pamela elongolaka yango kati na ye.
Moto oyo aboyaka kobeta mwana na ye fimbu
alingaka ye te,
kasi moto oyo alingaka mwana na ye abetaka ye.
Fimbu mpe pamela epesaka bwanya,
kasi mwana oyo basundola ayokisaka mama na ye soni.
Kozangisa te kopesa mwana etumbu ;
soki obeti ye fimbu, akokufa te.
Bana na ngai, boyokaka mateya ya tata,
bozalaka na bokebi mpo ete bozwa mayele.
Masese ya Salomo :
Mwana ya bwanya asepelisaka tata na ye,
kasi mwana ya zoba ayokisaka
mama na ye pasi na motema.
Tika ete mibeko oyo napesi yo lelo, ewumela kati na motema na yo. Okoteyaka yango na bana na yo tango ozali na ndako, tango ozali kotambola na nzela, tango olali mpe tango olamuki.
O amor de Deus por crianças
Deixai vir a mim as crianças. Jesus acolheu, abençoou e honrou as crianças como modelo de fé e humildade.
Tango Yesu amonaki bongo, ayokaki pasi na motema mpe alobaki na bayekoli :
— Botika bana mike baya epai na Ngai ; bopekisa bango te koya epai na Ngai, pamba te Bokonzi ya Nzambe ezali mpo na bato oyo bazali lokola bango.
Soki bino bato oyo bozali kutu mabe boyebi kopesa na bana na bino biloko ya malamu, ndenge nini Tata na bino oyo azali na Likolo apesa te biloko ya kitoko epai ya bato oyo basengaka Ye yango ?
Yesu azalaki kokola na bwanya mpe na nzoto ; Nzambe mpe bato bazalaki kosepela na Ye.
Ndenge tata alingaka makasi bana na ye,
ndenge wana mpe Yawe alingaka makasi
bato oyo batosaka Ye ;
Botala bolingo monene oyo Tata atalisaki biso mpo ete tobengama bana na Nzambe ! Mpe tozali solo bana na Nzambe. Tala tina nini mokili eyebi biso te : ezali mpo ete eyebi Nzambe te.
Bênção e promessa
O Senhor te abençoe e te guarde. Os filhos dos justos serão abençoados e suas gerações caminharão na retidão.
‘ Tika ete Yawe apambola yo
mpe abatela yo !
Tika ete Yawe angengisela yo elongi na Ye
mpe apesa yo ngolu na Ye !
Tika ete Yawe amona yo
mpe apesa yo kimia ! ’ ›
Tika ete Nzambe apesa yo mvula ya likolo mpe mabele ya bozwi ;
apesa yo mbuma ya ble mpe vino ebele penza !
Tika ete bikolo esalela yo,
bato bafukamela yo !
Zala mokonzi ya bandeko na yo ya mibali,
mpe tika ete bana mibali ya mama na yo bafukama liboso na yo !
Tika ete moto oyo akolakela yo mabe alakelama mabe ;
tika ete moto oyo akopambola yo apambolama ! »
Pamba te nakosopa mayi na mokili ya kokawuka,
mpe bibale, na mabele ya kokawuka ;
nakosopa Molimo na Ngai na likolo ya bana na yo
mpe mapamboli na Ngai na likolo ya bakitani na yo.
Bakokola malamu kati na matiti ya mobesu
lokola banzete ya pepiliye pene ya ebale.
Yawe akoteya bana na yo nyonso,
mpe kimia ya bana na yo ekozala monene.
— Liboso ete nasala yo kati na libumu ya mama na yo, nayebaki yo ; liboso ete obotama, nabulisaki yo : naponaki yo mpo ete ozala mosakoli ya bikolo.
Bakozala bato na Ngai, mpe Ngai nakozala Nzambe na bango. Nakopesa bango motema se moko mpe etamboli se moko mpo ete batosaka Ngai tango nyonso mpo na bolamu na bango mpe mpo na bolamu ya bakitani na bango.
Ezali Yo nde okelaki mozindo ya bomoto na ngai,
obombaki ngai kati na libumu ya mama na ngai.
Nasanzolaka Yo, pamba te osala ngai kitoko makasi.
Misala na Yo ezali ya kokamwa ;
ngai, nayebi yango malamu.
Na miso na Yo, nzoto na ngai ezalaki ya kobombama te
tango osalaki ngai na esika ebombama,
tango otongaki ngai kati na mozindo ya mabele.
Tango nazalaki nanu na lolenge te,
ozalaki komona ngai ;
mpe omikomelaki kati na buku na Yo
mikolo nyonso oyo obongisaki mpo na bomoi na ngai
liboso ete moko te kati na yango ezala.
Solo, Yawe, obimisaki ngai na libumu ya mama na ngai,
obatelaki ngai na kimia na tolo na ye.
Nazalaki elenge, mpe sik’oyo nakomi mobange,
namoni nanu te moto ya sembo kosundolama
to bana na ye kokoma kosenga-senga bilei.
Akabaka tango nyonso mpe adefisaka,
bana na ye bakozalaka kati na mapamboli.
Tokobombela yango bakitani na bango te,
kasi tokoloba na bikeke oyo ekoya na sima
nkembo ya masanzoli ya Yawe,
nguya na Ye mpe bikamwa oyo asalaki.
Bakitani bazali motole ya bakoko,
mpe baboti bazali lokumu ya bana.
Moyengebene atambolaka na bosembo na ye ;
boye sima na ye, bana na ye bakozala bato ya esengo.
Criação e obediência
Pais, criai vossos filhos na disciplina e instrução do Senhor. Filhos, obedecei a vossos pais — isto é justo e agradável a Deus.
Bino bana, botosaka baboti na bino kati na Nkolo, pamba te yango nde ezali sembo. Tala mobeko ya liboso oyo ekangani na elaka : Okopesaka tata mpe mama na yo lokumu mpo ete ozala moto ya esengo mpe ozala na bomoi ya molayi kati na mokili.
Bino batata, bopesaka bana na bino kanda te, kasi bobokolaka bango kati na mateya mpe makebisi ya Nkolo.
Bana, botosaka baboti na bino na makambo nyonso, pamba te ezali ndenge wana nde bokosepelisa Nkolo.
Batata, boyokisaka bana na bino kanda te, noki te mitema na bango ekolemba.
Okopesaka tata na yo mpe mama na yo lokumu mpo ete ozala na bomoi ya molayi kati na mokili oyo Yawe, Nzambe na yo, azali kopesa yo.
Bokangaka motema liboso ya bapasi oyo Nzambe apesaka bino lokola etumbu, pamba te azwaka bino lokola bana na Ye. Boni, ezali solo na mwana oyo tata na ye apesaka ye etumbu te ? Soki bapesi bino etumbu te ndenge bana nyonso bazwaka, elingi koloba ete bozali bana bazanga tata, kasi bana ya ndako te.
Soki mwasi akufisa mobali azali na bana to bakoko, bana to bakoko yango basengeli, liboso na nyonso, koyekola kotalisa botosi na bango kati na makambo ya Nzambe na nzela ya kosunga libota na bango mpe kozongisa bolamu epai ya baboti mpe bakoko na bango, pamba te kosala bongo esepelisaka Nzambe.
Na tango ya kobota, mwasi ayokaka pasi makasi, pamba te eleko ya kobimisa mwana wuta kati na libumu na ye ekoki ; kasi soki kaka aboti, abosanaka pasi nyonso oyo amonaki, mpo na esengo oyo atondaka na yango mpo ete aboti moto.
Bongo, bana na bino oyo bolobaki ete bakomema bango na bowumbu, bana na bino oyo bayebi nanu te kokesenisa malamu mpe mabe, bango nde bakokota na mokili yango. Nakopesa bango mokili yango, mpe bakokamata yango.