Publicidade

Sofonias 3

Etumbu ya engumba Yelusalemi

1 Mawa na engumba ya batomboki,

engumba ya makambo ya mbindo,

mpe engumba oyo enyokolaka bato !

2 Etosaka moto te,

endimaka pamela te,

etiaka elikya na Yawe te,

epusanaka pene ya Nzambe na yango te.

3 Bakalaka na yango bazali lokola bankosi

oyo ezali koganga ;

bakambi na yango bazali

lokola bambwa ya zamba oyo esalaka bokila na pokwa,

bongo etikaka ata eloko moko te na tongo.

4 Basakoli na yango bazali

bato ya lolendo mpe ya lokuta.

Banganga-Nzambe na yango babebisaka

Esika ya bule mpe batosaka mibeko te.

5 Kati na engumba yango,

Yawe azali sembo, asalaka mabe te ;

mokolo na mokolo, alakisaka bosembo na Ye

mpe azangaka te kokokisa yango tongo na tongo.

Nzokande, moto oyo atambolaka na bosembo te

amonaka likambo ya soni te.

6 Nabomi bato ya bikolo mosusu,

bandako na bango ya makasi ebebisami.

Nasali ete babalabala na bango

etikala lisusu na bato te

mpo ete moto moko te alekela lisusu wana.

Bingumba na bango ebebisami,

ata moto moko te atikali lisusu kuna.

7 Namilobelaki boye na tina na engumba oyo :

« Solo, okobanga Ngai mpe okondima pamela na Ngai ! »

Boye bandako na yango ekobukana lisusu te,

mpe nakotindela yango lisusu etumbu moko te.

Kasi atako bongo, bakobaki kaka kosala

misala na bango ya mabe.

8 Yango wana, « bozela Ngai, »

elobi Yawe,

« bozela Ngai na mokolo oyo nakoya

mpo na kosamba elongo na bino ;

nazwaki mokano ya kosangisa

bato ya bikolo nyonso mpe ya mikili nyonso

mpo na kosopela bango kanda na Ngai,

makasi nyonso penza ya kanda na Ngai :

mokili mobimba ekozika na moto

ya nguya ya kanda na Ngai.

Litomba ya etumbu

9 Boye nakopetola bibebu ya bato ya bikolo

mpo ete bango nyonso bazala ya kokoka

mpo na kobelela Kombo ya Yawe

mpe kosalela Ye na motema mobimba.

10 Longwa na likolo ya bibale ya Kushi,

bato na Ngai, oyo bagumbamelaka Ngai ;

bato na Ngai, oyo bapalangana bipai na bipai,

bakomemela Ngai makabo.

11 Na mokolo wana, oh bato na Ngai,

bokoyokisama lisusu soni te

mpo na mabe nyonso oyo bosalaki Ngai,

pamba te nakolongola bato

oyo bamimatisaka na lolendo kati na bino.

Boye bokomitombola lisusu te na lolendo

na ngomba na Ngai ya bule.

12 Kasi kati na bino, nakotika bato oyo bakelela,

bato oyo batambolaka na komikitisa,

bato oyo bakozwa ebombamelo kati na Kombo na Yawe.

13 Batikali ya Isalaele bakosala lisusu mabe te,

bakokosa lisusu te

to lokuta ekozala lisusu te kati na minoko na bango.

Bakolia mpe bakolala na kimia,

mpe moto moko te akobangisa bango lisusu.

14 Siona, mboka kitoko, yemba nzembo !

Isalaele, ganga makasi !

Yelusalemi, mboka kitoko, sepela ;

mpe tika ete motema na yo etonda na esengo !

15 Yawe alongoli etumbu na yo

mpe akimisi banguna na yo.

Yawe, Mokonzi ya Isalaele, azali elongo na yo ;

kobanga lisusu pasi moko te.

16 Na mokolo wana,

bakoloba na Yelusalemi :

‹ Oh Siona, kobanga te !

Tika ete maboko na yo elemba te !

17 Yawe, Nzambe na yo, azali elongo na yo,

azali Elombe Mobikisi.

Akosepela na yo makasi

mpe akopemisa yo, na bolingo na Ye ;

akoyemba banzembo ya esengo na tina na yo. ›

18 Lokola na mikolo ya bafeti oyo ekatama,

nakolongola pasi kati na yo

mpo ete ozala lisusu na soni te.

19 Na tango wana, nakobeta bato nyonso

oyo banyokolaki yo,

nakosunga moto oyo atambolaka tengu-tengu

mpe nakosangisa bato oyo bapanzana bipai na bipai.

Nakopesa bango lokumu

mpe nakosala ete sango na bango

epanzana na mikili nyonso

epai wapi basambwisaki bango.

20 Na tango wana, nakosangisa bino,

nakozongisa bino na mokili na bino.

Nakopesa bino lokumu

mpe nakosala ete sango na bino epanzana

kati na bato ya bikolo nyonso ya mokili

tango, na miso na bino, nakozongisa bato na bino,

oyo bakendeki na bowumbu, »

elobi Yawe.

Veja também

Publicidade
Sofonias
Ver todos os capítulos de Sofonias
Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-06-18_06-35-37-