Publicidade

Sofonias 1

Mokolo ya Yawe

1 Na tango Joziasi, mwana mobali ya Amoni, azalaki mokonzi ya mokili ya Yuda, Yawe alobaki na Sofoni, mwana mobali ya Kushi, mwana mobali ya Gedalia, mwana mobali ya Amaria, mwana mobali ya Ezekiasi :

2 « Nakosilisa kobebisa biloko nyonso

oyo ezali kati na mokili, »

elobi Yawe,

3 « solo, nakoboma ezala bato to banyama,

ezala bandeke ya likolo to bambisi ya ebale ;

nakolongola, na mokili, bato mabe

mpe biloko oyo ebetisaka bato mabaku »

elobi Yawe.

Etumbu ya mokili ya Yuda

4 « Nakosembola loboko na Ngai

mpo na kopesa mokili ya Yuda

mpe bavandi nyonso ya Yelusalemi etumbu ;

nakosilisa koboma, na esika oyo,

nyonso oyo etikali, ya losambo ya nzambe Bala

elongo na bakombo ya banganga-nzambe ya bapagano,

oyo basalelaka banzambe ya bikeko :

5 bato nyonso oyo bafukamaka na likolo ya bandako

mpo na kosambela mampinga ya likolo,

bato nyonso oyo bagumbamaka

na kolapa ndayi na Kombo na Yawe

mpe na kombo na nzambe Moloki,

6 bato nyonso oyo bapesaka Yawe mokongo,

oyo balukaka Ye te mpe batunaka Ye te.

7 Bovanda kimia liboso ya Nkolo Yawe,

pamba te mokolo ya Yawe ekomi pene !

Yawe abongisi mbeka,

abulisi babengami na Ye.

8 Na mokolo ya mbeka ya Yawe,

nakopesa etumbu epai ya bakambi,

epai ya bana mibali ya mokonzi

mpe epai ya bato nyonso oyo balataka bilamba ya bapaya.

9 Na mokolo wana,

nakopesa etumbu epai ya bato nyonso

oyo bapumbwaka ekotelo ya tempelo,

bato oyo batondisaka tempelo ya banzambe na bango ya bikeko

na makambo ya kanza mpe na lokuta.

10 Na mokolo wana, »

elobi Yawe,

« koganga makasi ekoyokana

wuta na Ekuke ya Bambisi,

kolela ekoyokana wuta na Mboka ya sika

mpe lokito monene wuta na bangomba mikuse.

11 Bino bavandi ya etuka Makiteshi, bolela,

pamba te bato nyonso ya mombongo bakokufa,

mpe bato nyonso oyo batekaka palata bakobebisama !

12 Na tango wana,

nakoluka engumba Yelusalemi na nzela ya mwinda,

nakopesa etumbu epai ya bato nyonso

oyo bamimonaka ete bakoka mpe bamilobelaka :

‹ Yawe asalaka na Ye eloko te,

ezala ya malamu to ya mabe. ›

13 Bakobotola bango bomengo na makasi

mpe bakobuka bandako na bango ;

bakotonga bandako, kasi bakotikala kovanda yango te ;

bakosala bilanga ya vino,

kasi bakotikala komela vino na yango te. »

Mokolo ya Yawe

14 Mokolo monene ya Yawe ekomi pene,

solo ekomi pene mpe ezali koya noki penza.

Boyoka ! Makelele ya mokolo na Yawe ekozala bololo ;

ezala basoda ya mpiko, bakoganga mpo na koluka lisungi.

15 Mokolo yango ekozala mokolo ya kanda makasi,

mokolo ya pasi mpe ya somo,

mokolo ya komitungisa mpe ya kobebisama,

mokolo ya butu mpe ya molili makasi,

mokolo ya mapata mpe mapata ya mwindo,

16 mokolo ya kobeta bakelelo mpe ya makelele ya bitumba

mpo na kobundisa bingumba batonga makasi

mpe bandako milayi oyo batonga makasi.

17 Nakotindela bato pasi ya makasi :

bakokoma kotambola lokola bato balangwe masanga,

pamba te basalaki masumu liboso ya Yawe ;

bakopanza makila na bango lokola putulu

mpe bakobwaka misopo na bango lokola salite.

18 Na mokolo ya kanda na Yawe,

ezala palata to wolo na bango ekobikisa bango te.

Na moto ya zuwa na Ye,

mokili mobimba ekozikisama,

pamba te akosukisa na mbalakata

bavandi nyonso ya mokili.

Veja também

Publicidade
Sofonias
Ver todos os capítulos de Sofonias
Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-06-18_14-04-22-