Ídolos
A Bíblia condena a idolatria com veemência. Um ídolo é qualquer coisa que ocupa o lugar de Deus no coração. Os cristãos são chamados a guardar-se dos ídolos e servir ao Deus vivo.
Guardai-vos dos ídolos
Filhinhos, guardai-vos dos ídolos. A cobiça é idolatria. Tudo que ocupa o trono de Deus no coração é um ídolo.
Bana na ngai, bomibatelaka mosika na banzambe ya bikeko.
Boye, boboma nyonso oyo, kati na bomoi na bino, ezali ya mokili : pite, bosoto, baposa ya mabe, bilulela mpe lokoso ya mbongo, pamba te lokoso ya mbongo ezali ndenge moko na kosambela bikeko.
Pamba te lokoso ya mbongo ezali mosisa ya mabe nyonso. Mpo na lokoso ya mbongo, bato mingi babungisaki kondima na bango mpe bamipesaki minyoko ebele.
Bokomisalela te banzambe ya bikeko ya palata to ya wolo, mpo na kosangisa yango na Ngai.
« Nzokande Ngai Yawe, nazali Nzambe na yo,
oyo abimisaki yo wuta na Ejipito.
Oyebi Nzambe mosusu te libanda na Ngai,
ozali na mobikisi mosusu te.
O único Deus verdadeiro
O Senhor é Deus nos céus e na terra — não há outro. Escolham hoje a quem servir, mas eu e a minha casa serviremos ao Senhor.
Yeba yango lelo mpe tia yango na motema na yo ete Yawe kaka nde azali Nzambe na likolo mpe na se, mosusu azali te.
bosengeli te koyoka maloba ya mosakoli wana to ya moto wana oyo amonaka makambo. Yawe, Nzambe na bino, akomeka bino mpo na kotala soki bolingi Ye na motema na bino mobimba mpe na molimo na bino mobimba.
Kasi soki bosepeli kosalela Yawe te, bopona lelo nani bolingi kosalela ; banzambe oyo batata na bino basalelaki tango bazalaki na ngambo mosusu ya ebale to banzambe ya bato ya Amori epai wapi bozali kovanda. Kasi ngai mpe libota na ngai, tokosalela Yawe. »
Boyebi te ete bato mabe bakokota te na Bokonzi ya Nzambe ? Bomikosa te : bato na pite, basambeli bikeko, bato na bikobo, bato oyo balula makambo ya soni, mibali oyo basangisaka nzoto na mibali, miyibi, bato ya lokoso ya mbongo, balangwi masanga, bato oyo bakoselaka baninga makambo mpo na kobebisa lokumu na bango, ba-oyo babotolaka biloko ya bato, bakokota te na Bokonzi ya Nzambe.
Vencer a idolatria
Não tenhas comunhão com as obras das trevas. Revesti-vos da armadura de Deus para resistir às ciladas do diabo.
Bosanganaka te na misala ya molili, oyo ebotaka mbuma te, kasi bobimisaka yango na pwasa. Pamba te makambo nyonso oyo esalemaka na nkuku ezalaka soni mpo na kolobela yango.
Bolataka bibundeli nyonso ya Nzambe mpo ete bokoka kotelema ngwi liboso ya mayele mabe ya Satana.
Nazali kosenga na Yo te ete olongola bango kati na mokili, kasi nde obatela bango liboso ya Satana.
Nzokande, ebundeli moko te oyo esalemi
mpo na kosala yo mabe ekolonga ;
mpe monoko nyonso oyo ekotelemela yo na kosambisa,
okokatela yango etumbu.
Yango nde ekozala libula ya basali ya Yawe,
mpe elonga na bango kowuta epai na Ngai,
elobi Yawe.
Kotika te ete mabe elonga na yo, kasi lukaka nde kolonga mabe na nzela ya kosala bolamu.
Batela lolemo na yo mosika na mabe,
mpe bibebu na yo ete eloba lokuta te.
Nguya ya kufa ezali masumu, mpe nguya ya masumu ezali Mibeko.