Ler a Bíblia
Ler a Bíblia é essencial para a vida cristã. A Escritura é lâmpada para os pés, alimento para a alma e espada do Espírito. O cristão que lê a Bíblia é transformado pela Palavra.
A importância de ler
Meditar na Palavra dia e noite traz prosperidade e bom sucesso. Ler a Bíblia ilumina o entendimento e fortalece a fé.
Sala ete maloba ya buku oyo ya Mobeko ewumela tango nyonso na monoko na yo ; tangaka mpe kanisaka yango butu mpe moyi, mpo ete osala kolanda nyonso oyo ekomami kati na yango. Na bongo nde okokende liboso mpe okolonga kati na misala na yo nyonso.
Liloba na Yo ezali mwinda
mpo na makolo na ngai,
mpe pole mpo na nzela na ngai.
Emoniseli ya liloba na Yo engengisaka,
epesaka bazoba mayele.
Nalingaka mibeko na Yo mingi !
Nakanisaka yango mikolo nyonso.
Mibeko na Yo ekomisaka ngai moto ya bwanya
koleka banguna na ngai ;
ezalaka elongo na ngai tango nyonso.
Naleki balakisi na ngai nyonso na mayele,
pamba te nakanisaka malako na Yo.
Ndenge nini elenge akoki kowumela
na nzela ya sembo ?
Ezali na kotambola kolanda liloba na Yo.
Nalukaka Yo na motema na ngai mobimba ;
batela ngai mpo ete napengwa te
mosika ya mibeko na Yo !
Nabatelaka liloba na Yo kati na motema na ngai
mpo ete nasala masumu te na miso na Yo.
A Escritura é inspirada
Toda a Escritura é útil para ensinar, corrigir e instruir em justiça. Examine as Escrituras — nelas encontramos a vida eterna.
Makomi nyonso ekomama na nguya ya Nzambe mpe ezali na tina mpo na koteya, kopamela, kozongisa na nzela mpe kolakisa bato kotambola kolanda bosembo, mpo ete moto na Nzambe azala ya kokoka mpe ya kobongisama mpo na kosala misala nyonso ya malamu.
Bokundolaka Makomi na bokebi, mpo ete bokanisaka ete bokozwa bomoi ya seko kati na yango ; nzokande, Makomi yango etatolaka na tina na Ngai,
Nzokande, makambo nyonso oyo ekomama kala ekomamaki mpo na koteya biso, mpo ete na nzela ya kokanga motema mpe malendisi oyo Makomi epesaka, tozala na elikya.
Esengo na moto oyo atangaka maloba ya lisakoli oyo, mpe esengo na bato oyo bayokaka maloba yango mpe babatelaka makambo oyo ekomama kati na yango, pamba te tango ekomi pene.
Kino tango nakoya, zala na molende ya kotanga Makomi, ya koteya mpe ya kopesa malakisi.
Estudar com diligência
Os bereanos eram mais nobres porque examinavam as Escrituras diariamente. O estudo dedicado da Bíblia produz maturidade espiritual.
Nzokande, Bayuda ya Bere bazalaki bato ya boboto koleka bato ya Tesalonika, pamba te bayambaki Liloba na motema mobimba mpe, mokolo na mokolo, bazalaki koyekola na mozindo Makomi mpo na kotala soki makambo oyo Polo azali koteya bango ezali ya solo.
mpo ete Esidrasi amipesaki ye moko penza, na motema na ye mobimba, mpo na koyekola mpe kotia na misala mibeko ya Yawe mpe mpo na kolakisa na bana ya Isalaele bikateli mpe mitindo ya mibeko yango.
Balevi bazalaki kotanga kati na buku ya Mobeko ya Nzambe mpe kopesa ndimbola na yango, na ndenge ya malembe mpe ya malamu, mpo ete bato bakoka kososola makomi oyo batangi.
Yesu azongiselaki bango :
— Bozali kati na libunga, pamba te boyebi Makomi te, mpe boyebi nguya ya Nzambe te.
Tika ete mibeko oyo napesi yo lelo, ewumela kati na motema na yo. Okoteyaka yango na bana na yo tango ozali na ndako, tango ozali kotambola na nzela, tango olali mpe tango olamuki. Kanga yango na maboko na yo lokola bilembo mpe tia yango na elongi na yo lokola elembo.
Bwanya : bomengo oyo ebombama
Mwana na ngai, soki ondimi maloba na ngai
mpe obateli kati na motema na yo mibeko na ngai ;
soki opesi litoyi na yo na maloba ya bwanya
mpe okabi motema na yo na makambo ya mayele ;
soki obeleli mayele
mpe ogangi epai ya bososoli ;
soki oluki yango penza ndenge balukaka palata
to bomengo oyo ebombama,
okososola solo soki kotosa Yawe elakisi nini
mpe okozwa boyebi ya Nzambe.
Pamba te Yawe nde apesaka bwanya,
mpe maloba ya monoko na Ye epesaka
mayele mpe bososoli.