Pular para o conteúdo
Publicidade

Língua

Por Bíblia Online

A língua tem poder de vida e de morte. A Bíblia compara a língua ao leme de um navio e à faísca que incendeia uma floresta. Dominar a língua é prova de maturidade espiritual.

O poder da língua

A morte e a vida estão no poder da língua. Quem a domina é varão perfeito, capaz de controlar todo o corpo.

Kufa mpe bomoi ezali na se ya nguya ya lolemo ;

moto oyo alingaka lolemo akolia mbuma na yango.

Biso nyonso tobetaka mabaku na lolenge ebele. Moto oyo abetaka libaku te na maloba oyo ebimaka na monoko na ye azali moto ya kokoka mpe azali na makoki ya kobatela bomoto na ye nyonso.

Soki totiaka ebende na monoko ya mpunda, ezali mpo ete etosa biso ; mpe na nzela wana, tokambaka nzoto na yango nyonso. Tala masuwa : atako ezali monene mpe mopepe makasi etindikaka yango, kasi mwa yenda moke nde ekambaka yango mpo ete elanda nzela oyo kapitene ya masuwa alingi komema yango. Ezali mpe ndenge moko mpo na lolemo : ezali eteni moko ya moke kati na nzoto ya moto, kasi ekoki komikumisa na makambo minene penza. Tala, mwa moto moke ezikisaka zamba monene ! Lolemo mpe ezali moto ; kati na biteni ya nzoto na biso, lolemo ezali mokili ya makambo mabe, ebebisaka nzoto mobimba. Soki ezwi moto ya lifelo, ezikisaka bomoi na biso mobimba.

Moto azali na makoki ya kokonza lolenge nyonso ya banyama, bandeke, banyama oyo etambolaka na libumu mpe bambisi, mpe akonza yango penza. Kasi mpo na lolemo, moko te akoki kokonza yango : ezali penza mabe, elembaka te mpe etonda na ngenge oyo ebomaka.

Kaka na lolemo yango, topambolaka Nkolo, Tata na biso, mpe tolakelaka mabe bato oyo Nzambe akela na elilingi na Ye. Ezala lipamboli to elakeli mabe, nyonso ebimaka kaka na monoko moko. Bandeko na ngai, esengelaki te kozala bongo. Boni, etima moko ekoki kobimisa mayi ya peto mpe mayi ya mbindo ? Bandeko na ngai, nzete ya figi ekoki solo kobota bambuma ya olive ? Nzete ya vino ekoki solo kobota bambuma ya figi ? Boni, ekoki kosalema ete etima ya mayi ya mungwa ebimisa mayi ya malamu ?

Palavras sábias

A língua branda quebra até ossos. A palavra certa no tempo certo é como maçãs de ouro em salvas de prata.

Moto oyo akangaka motema

akoki kobongola makanisi ya mokonzi,

mpe maloba ya malamu ebukaka mikuwa.

Maloba ya bato oyo balobaka mingi ezokisaka

lokola mopanga,

kasi lolemo ya bato ya bwanya ezali

lokola mafuta oyo ebikisaka.

Moto oyo alobaka solo akowumela mpo na libela,

kasi mokosi akowumela kaka mpo na tango moke.

Moto oyo alobaka maloba ebele

azangaka te kosala masumu,

kasi moto oyo abatelaka bibebu na ye

azali moto ya bwanya.

Ezala moto ya liboma, soki avandi kimia,

amonanaka lokola moto ya bwanya ;

moto oyo akangaka monoko na ye

amonanaka lokola moto ya mayele.

Disciplinar a fala

Quem guarda a boca e a língua guarda a sua alma de angústias. A religião sem controle da língua é vã.

Moto oyo akanisaka ete asambelaka Nzambe, kasi ayebaka te kobatela lolemo na ye, azali komikosa ye moko, mpe kosambela na ye ezali na tina te.

Liboso ya kufa

Wuta na buku ya mokambi ya bayembi mpe ya Yedutuni. Nzembo ya Davidi.

Bana na ngai, boya, boyoka ngai ;

Nakolakisa bino kotosa Yawe.

Nani asepelaka na bomoi ?

Nani alingaka kobika mikolo ebele ya esengo ?

Monoko ya moto ya sembo ebimisaka bwanya,

mpe lolemo na ye elobaka kolanda bosembo.

Mobeko ya Nzambe na ye ezali kati na motema na ye,

makolo na ye ebetaka libaku te.

Nakosakola bosembo na Yo,

nakokumisa Yo mikolo nyonso.

Pamba te, oh Yawe, liboso ete liloba ekoma na lolemo na ngai,

omiyebelaka yango.

Oh Yawe, kangola ngai

wuta na maboko ya bakosi

mpe wuta na lolemo ya lokuta !

Bato nyonso bazali kokosana bango na bango,

bazali kolobana maloba ya sukali,

kasi mitema na bango ezali sembo te.

Tika ete Yawe aboma bato nyonso

oyo balobaka maloba ya sukali

mpe batondi na lolendo,

Solo, na lombangu penza,

nalingaki kokende koluka ebombamelo

mpo na kokima mopepe makasi mpe ekumbaki»

Toda língua confessará

Ao nome de Jesus todo joelho se dobrará e toda língua confessará que Jesus Cristo é Senhor, para glória de Deus Pai.

Yango wana mpe Nzambe atombolaki Ye na likolo ya nyonso

mpe apesaki Ye Kombo oyo eleki bakombo nyonso,

mpo ete, na Kombo na Yesu,

mabolongo nyonso efukama

kati na Likolo, na mokili mpe na se ya mabele,

mpe minoko nyonso etatola ete Yesu-Klisto azali Nkolo

mpo na nkembo ya Nzambe Tata.

Bolingo

Soki nalobi nkota ya bato to ya ba-anjelu, kasi nazangi bolingo, nazali kaka lokola ngonga oyo ezali kobeta to lokola manzanza oyo ezali kotia makelele.

Nzokande, Ngai, nazali koloba na bino : na mokolo ya kosambisama, bato bakosamba mpo na maloba ezanga tina, oyo babimisaki. Pamba te ezali na nzela ya maloba na yo moko kaka nde bakolongisa yo to bakokweyisa yo.

Kasi Yawe akitaki mpo na kotala engumba mpe ndako molayi oyo bato babandaki kotonga. Yawe alobaki : « Lokola bato oyo nyonso balongi kokoma ekolo moko mpe koloba monoko moko, bongo bakomi kino kosala mosala monene oyo, eloko moko te ekopekisa bango sik’oyo kokokisa mabongisi nyonso oyo bakokana kosala ! Boye, tokita mpe totia mobulu kati na maloba na bango mpo ete bango na bango bayokana lisusu te»

Wuta na Babeli, Yawe apanzaki bango na mokili mobimba mpe batikaki kotonga engumba. Yango wana, babengaka yango Babeli, pamba te kuna nde Yawe atiaki mobulu kati na maloba ya bato ya mokili mobimba, mpe wuta kuna, Yawe apanzaki bato na mokili mobimba.

Seja o primeiro

Este artigo te tocou? Faça uma oração!

+581 estão orando agora.

Junte-se à corrente de oração.