Luz do mundo
Jesus declarou: 'Eu sou a luz do mundo.' A luz é metáfora central da Bíblia — Deus é luz, Cristo é luz, e os cristãos são chamados a brilhar como filhos da luz neste mundo.
Jesus, a luz do mundo
Jesus disse: quem me segue não andará em trevas, mas terá a luz da vida. Ele é a verdadeira luz que ilumina todo homem.
Yesu azali pole ya mokili
Yesu alobaki lisusu na bato :
— Nazali pole ya mokili ; moto nyonso oyo alandaka Ngai akotikala kotambola kati na molili te, kasi akozwa pole ya bomoi.
Yesu azali pole ya mokili
Yesu alobaki lisusu na bato :
— Nazali pole ya mokili ; moto nyonso oyo alandaka Ngai akotikala kotambola kati na molili te, kasi akozwa pole ya bomoi.
Bomoi ewuta epai na Ye, mpe bomoi yango ezalaki pole mpo na bato. Pole engengaka kati na molili, kasi molili eyambaki yango te.
Pole engengaka kati na molili, kasi molili eyambaki yango te.
Pole engengaka kati na molili, kasi molili eyambaki yango te.
Wana nazali kati na mokili, nazali pole ya mokili.
Ngai, pole, nayaki kati na mokili mpo ete moto nyonso oyo akondima Ngai azala lisusu te kati na molili.
Tala ndenge nini etumbu yango ezali : pole eyaki kati na mokili, kasi bato balingaki molili, pamba te misala na bango ezali mabe. Moto nyonso oyo asalaka mabe ayinaka pole mpe apusanaka te epai pole ezali, noki te misala na ye ekomonana polele. Nzokande, moto nyonso oyo atambolaka na solo ayaka epai pole ezali mpo ete misala oyo asalaka, na boyokani elongo na Nzambe, emonana polele.
Deus é luz
Deus é luz e nele não há treva alguma. Se andarmos na luz, temos comunhão uns com os outros e o sangue de Jesus nos purifica.
Kotambola kati na pole
Tala makambo oyo toyoki na tina na Ye mpe tozali koyebisa bino : Nzambe azali pole, mpe molili ezali te kati na Ye.
Kotambola kati na pole
Tala makambo oyo toyoki na tina na Ye mpe tozali koyebisa bino : Nzambe azali pole, mpe molili ezali te kati na Ye.
Soki tolobi ete tozali moko na Ye, nzokande tozali kotambola kati na molili, wana tozali bakosi mpe tozali kotambola na solo te. Kasi soki tozali kotambola kati na pole ndenge Ye moko Nzambe azali kati na pole, wana tozali moko, bamoko na bamosusu, mpe makila ya Yesu, Mwana na Ye, ezali kopetola biso na masumu nyonso.
Kasi soki tozali kotambola kati na pole ndenge Ye moko Nzambe azali kati na pole, wana tozali moko, bamoko na bamosusu, mpe makila ya Yesu, Mwana na Ye, ezali kopetola biso na masumu nyonso.
Kasi soki tozali kotambola kati na pole ndenge Ye moko Nzambe azali kati na pole, wana tozali moko, bamoko na bamosusu, mpe makila ya Yesu, Mwana na Ye, ezali kopetola biso na masumu nyonso.
bolamu nyonso mpe likabo nyonso ya kitoko ewutaka kaka na Likolo, epai ya Tata ya pole, oyo, kati na Ye, molili ezalaka te, mpe abongwanaka te.
bolamu nyonso mpe likabo nyonso ya kitoko ewutaka kaka na Likolo, epai ya Tata ya pole, oyo, kati na Ye, molili ezalaka te, mpe abongwanaka te.
Vós sois a luz do mundo
Jesus disse aos discípulos: vós sois a luz do mundo. Não se esconde uma cidade edificada sobre um monte. Brilhem a vossa luz!
Bozali pole ya mokili. Engumba oyo batongi na likolo ya ngomba ekoki kobombama te. Moto moko te apelisaka mwinda mpo na kotia yango na se ya katini ; nzokande, atiaka yango na likolo ya etelemiselo ya minda mpo ete engengisa bato nyonso oyo bazali kati na ndako. Yango wana, tika ete pole na bino engenga liboso ya bato, mpo ete bamona misala malamu na bino mpe bakumisa Tata na bino oyo azali kati na Likolo.
Bozali pole ya mokili. Engumba oyo batongi na likolo ya ngomba ekoki kobombama te.
Moto moko te apelisaka mwinda mpo na kotia yango na se ya katini ; nzokande, atiaka yango na likolo ya etelemiselo ya minda mpo ete engengisa bato nyonso oyo bazali kati na ndako. Yango wana, tika ete pole na bino engenga liboso ya bato, mpo ete bamona misala malamu na bino mpe bakumisa Tata na bino oyo azali kati na Likolo.
bato oyo bazalaki kovanda kati na molili
bamoni pole makasi ;
ba-oyo bazalaki kovanda kati na mokili ya bakufi,
pole ebimeli bango. »
Kasi bino bozali libota oyo eponama, Banganga-Nzambe ya Mokonzi, ekolo ya bule mpe basikolami ya Nzambe mpo na kosakola misala minene ya Ye oyo abenga bino mpo ete bolongwa na molili mpe bokota kati na pole na Ye ya kokamwa.
Kasi bino bozali libota oyo eponama, Banganga-Nzambe ya Mokonzi, ekolo ya bule mpe basikolami ya Nzambe mpo na kosakola misala minene ya Ye oyo abenga bino mpo ete bolongwa na molili mpe bokota kati na pole na Ye ya kokamwa.
Pamba te bino nyonso bozali bana ya pole mpe bana ya moyi. Tozali bato ya butu te to bato ya molili te.
A luz nas Escrituras
A Palavra de Deus é lâmpada para nossos pés e luz para o caminho. Ela ilumina, revela e nos guia na verdade.
Liloba na Yo ezali mwinda
mpo na makolo na ngai,
mpe pole mpo na nzela na ngai.
Liloba na Yo ezali mwinda
mpo na makolo na ngai,
mpe pole mpo na nzela na ngai.
Emoniseli ya liloba na Yo engengisaka,
epesaka bazoba mayele.
Nabatelami malamu epai ya Nzambe
Nzembo ya Davidi.
Yawe azali pole mpe lobiko na ngai ;
nakobanga nani ?
Yawe azali ndako batonga makasi ya bomoi na ngai ;
nakolenga liboso ya nani ?
Baliaka mpe batondaka bilei ya Ndako na Yo,
mpe omelisaka bango mayi
kowuta na bolingo monene na Yo.
Yo nde obikisaka banyokolami,
okitisaka bato na lofundu.
Kaba bomoi na yo epai na Yawe,
tia elikya kati na Ye, mpe akosala :
akongengisa bosembo na yo lokola pole,
makoki na yo lokola moyi ya midi.
Epai na Yo Nzambe, nakokokisa bandayi na ngai
mpe nakobonza bambeka ya matondi.
Boye, tokozala lisusu mosika na Yo te ;
zongisela biso lisusu bomoi,
mpe tokobelela Kombo na Yo.
Na nguya na Yo, obenganaki bikolo
mpe otiaki bakoko na biso ;
obetaki bikolo ya bapaya
mpe ofulukisaki bakoko na biso.
Mikolo ya bomoi na ngai ezali kati na maboko na Yo ;
kangola ngai wuta na maboko
ya banguna mpe ya bayini na ngai.
Luz versus trevas
A luz brilha nas trevas e as trevas não a venceram. Cristãos são chamados a não ter comunhão com as trevas, mas a expô-las.
ba-oyo bazangi kondima, ba-oyo mayele na bango ebebisama na nzambe ya mokili oyo, mpo ete bamona te pole ya Sango Malamu oyo emonisaka nkembo ya Klisto oyo azali elilingi ya Nzambe.
Toteyaka sango na biso moko te, toteyaka nde ete Yesu-Klisto azali Nkolo, mpe ete biso tozali bawumbu na bino mpo na Yesu. Pamba te Nzambe oyo alobaki : « Tika ete pole engenga kati na molili, » angengaki Ye moko kati na mitema na biso mpo na kopesa biso pole ya boyebi ya nkembo ya Nzambe, oyo engengaka na elongi ya Yesu-Klisto.
Pamba te Nzambe oyo alobaki : « Tika ete pole engenga kati na molili, » angengaki Ye moko kati na mitema na biso mpo na kopesa biso pole ya boyebi ya nkembo ya Nzambe, oyo engengaka na elongi ya Yesu-Klisto.
Kokabwana na mabe
Bosanganaka te na bato oyo bazangi kondima. Pamba te boyokani nini ezali kati na bosembo mpe mabe ? Boni, pole ekoki solo kosangana na molili ?
Nasambelaka ete angengisa miso ya mitema na bino mpo ete bokoka kososola elikya oyo ezali kati na kobengama na bino, bomengo ya nkembo ya libula na Ye, oyo akopesa bino elongo na basantu,
Okomisaki bango ekolo monene,
obakisaki esengo na bango.
Bazali kosepela liboso na Yo
ndenge basepelaka tango babukaka milona,
ndenge mibali basepelaka
tango bakabolaka bomengo ya bitumba.
Pole ya Yelusalemi ekoya
« Telema mpe ngenga,
pamba te pole na yo ezali koya,
mpe nkembo na Yawe etelemi na likolo na yo.
Pole ya Yelusalemi ekoya
« Telema mpe ngenga,
pamba te pole na yo ezali koya,
mpe nkembo na Yawe etelemi na likolo na yo.
Tala, molili ezipi mabele
mpe molili makasi ezipi bato,
kasi Yawe atelemi mpo na yo
mpe nkembo na Ye emonani epai na yo.
Bikolo ekotambola na pole na yo,
mpe bakonzi bakotambola na kongenga ya pole na yo.
Oh bato na ngai, boyoka ngai !
Bino, ekolo na ngai, boyoka ngai malamu :
Mpo ete Mobeko ekobimela epai na ngai,
lolenge na ngai ya kokata makambo ekoyeisa pole na bikolo.
Proclamar a luz
Os cristãos são embaixadores da luz, chamados a proclamar as virtudes daquele que nos chamou das trevas para a sua maravilhosa luz.
Pamba te, tala makambo oyo Nkolo atindaki biso :
« Nakomisi yo pole mpo na bikolo mosusu,
mpo ete omema lobiko kino na suka ya mokili. »
Pamba te, tala makambo oyo Nkolo atindaki biso :
« Nakomisi yo pole mpo na bikolo mosusu,
mpo ete omema lobiko kino na suka ya mokili. »
Kasi kino lelo, Nzambe azali kobatela ngai ; yango wana natelemi awa mpo na kotatola liboso ya bato pamba mpe bato minene. Nazali koteya makambo mosusu te, bobele makambo oyo basakoli mpe Moyize baloba ete ekokokisama solo : Klisto akomona pasi mpe akozala moto ya liboso ya kosekwa kati na bakufi mpo na kosakola pole ya lobiko epai ya Bayuda mpe epai ya bato ya bikolo ya bapaya.
Mpe Nzambe alobaki : « Tika ete pole ezala ! »
Mpe pole ezalaki.
‘ Tika ete Yawe apambola yo
mpe abatela yo !
Tika ete Yawe angengisela yo elongi na Ye
mpe apesa yo ngolu na Ye !
Tika ete Yawe amona yo
mpe apesa yo kimia ! ’ ›
Alakisaka makambo ya bozindo mpe ebombama,
ayebaka makambo oyo esalemaka na molili,
mpe pole ezali kati na Ye.
Engumba yango ezali na posa te ya moyi to ya sanza mpo na kongengisa yango, pamba te engengisamaka na nkembo ya Nzambe ; bongo Mpate azali mwinda na yango.
Butu ekozala lisusu te. Bakozala na posa te ya pole ya mwinda to ya moyi, pamba te Nkolo Nzambe akongengisa bango na pole na Ye. Mpe bakokonza seko na seko.
Lisese ya mwinda
Moto moko te apelisaka mwinda mpo na kotia yango na se ya katini to na se ya mbeto ; atiaka yango nde na likolo ya etelemiselo ya minda mpo ete bato oyo bazali kokota na ndako bamona pole na yango.
Miso na yo ezali lokola mwinda ya nzoto na yo. Soki miso na yo ezali malamu, nzoto na yo mobimba mpe ezali kati na pole. Kasi soki ebeli, nzoto na yo mobimba mpe ekoti kati na molili.
Nyonso oyo bokoloba kati na molili ekoyokana kati na pole ya mokolo, mpe nyonso oyo bokolobana na matoyi kati na bashambre ekosakolama wuta na likolo ya bandako.
Este artigo te tocou? Faça uma oração!
+581 estão orando agora.
Junte-se à corrente de oração.