Misericórdia
A misericórdia de Deus é eterna e inesgotável. Ele se compadece dos que sofrem, perdoa os arrependidos e derrama graça sobre os que não merecem. Grande é a sua fidelidade.
A misericórdia de Deus
Quem é Deus como tu, que perdoa a iniquidade? Ele se deleita em ter misericórdia e não retém a ira para sempre.
Nzambe nini akokani na Yo,
Yo oyo olimbisaka masumu ya bato
mpe obosanaka mabe ya batikali kati na libula na Yo ?
Okangelaka bato kanda mpo na libela te,
kasi osepelaka kotalisa bango ngolu.
Nzembo ya Davidi. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki tango mosakoli Natan akomaki epai ya Davidi sima na ye kosala ekobo elongo na Batisheba.
Yawe, kanisa mawa mpe bolingo na Yo,
pamba te ezali mpo na libela na libela.
Yawe, kokanisa te masumu
mpe botomboki ya bolenge na ngai ;
kanisa ngai kaka kolanda boboto na Yo,
pamba te ozali malamu.
Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Ndako ya Nkolo.
Nkolo, nazali kobelela Yo wuta na mozindo ya pasi !
Nkolo, yoka ngai !
Yoka mabondeli na ngai !
Nabombaka bosembo na Yo te kati na motema na ngai,
natatolaka boyengebene mpe lobiko na Yo kati na mayangani,
nakobomba yango ata moke te.
Solo, na mikolo nyonso ya bomoi na ngai,
esengo mpe bolingo na Yo ekobanda kolanda ngai ;
mpe nakovanda kati na Tempelo ya Yawe
kino suka ya bomoi na ngai.
Ndenge tata alingaka makasi bana na ye,
ndenge wana mpe Yawe alingaka makasi
bato oyo batosaka Ye ;
Graça e perdão
Onde o pecado abundou, superabundou a graça. Deus convida todos ao arrependimento e promete perdão total aos que confessam.
Kasi ezali na bokeseni monene kati na likabo ya ofele ya Nzambe mpe lisumu ! Pamba te soki lisumu ya moto moko ememelaki bato ebele kufa, ngolu ya Nzambe mpe likabo ya ofele oyo eyaki na nzela ya ngolu ya moto moko, Yesu-Klisto, efulukaki meke mpo na bato ebele.
Boye toloba nini ? Tokoba kosala masumu mpo ete tozali na se ya bokonzi ya Mobeko te kasi na se ya ngolu ? Soki moke te !
Kasi mpo ete Nzambe atondi na mawa mpe alingaki biso na bolingo monene, atako tozalaki bakufi mpo na masumu na biso, akomisaki biso bato ya bomoi elongo na Klisto. Bobikisami nde na ngolu…
Kasi azongiselaki ngai : « Ngolu na Ngai ekoki mpo na yo, pamba te nguya na Ngai ekokisamaka kati na bolembu. » Mpo na yango, nakomikumisa na esengo nyonso mpo na bolembu na ngai, mpo ete nguya ya Klisto ezala kati na ngai.
Moto oyo abombaka masumu na ye abongaka te,
kasi ye oyo atubelaka mpe atikaka yango azwaka ngolu.
Tika ete moto mabe atika banzela na ye,
mpe tika ete mosumuki atika makanisi na ye ;
tika ete azonga epai na Yawe
mpo ete ayokela ye mawa,
tika ete azonga epai ya Nzambe na biso,
pamba te alimbisaka kaka.
Nzokande, Yawe alingi kosalela bino ngolu,
atelemi likolo mpo na koyokela bino mawa.
Pamba te Yawe azali Nzambe ya sembo :
Esengo na bato nyonso oyo batalelaka Ye !
Misericórdia e compaixão
Misericórdia quero e não sacrifício. Deus nos chama a ser misericordiosos como Ele é, perdoando e acolhendo o próximo.
Bokende koyekola tina ya maloba oyo : « Nasepelaka na motema ya boboto koleka mbeka, » pamba te nayaki te koluka bato ya sembo, kasi bato ya masumu.
Bongo Petelo apusanaki pene ya Yesu mpe atunaki :
— Nkolo, mbala boni nasengeli kolimbisa ndeko na ngai tango akosala ngai mabe ? Boni, kino mbala sambo ?
Yesu azongisaki :
— Nalobi na yo te kino mbala sambo, kasi kino mbala tuku sambo na sambo.
Pamba te soki bolimbisi baninga, na mabe oyo basali bino, Tata na bino ya Likolo mpe akolimbisa bino ;
Kasi na mawa monene na Yo, osilisaki bango te na koboma mpe osundolaki bango te ; pamba te ozali Nzambe otonda na mawa mpe na ngolu.
Esengo na moto oyo
ayokelaka bato mawa mpe adefisaka,
mpe asalaka misala na ye kolanda bosembo.
Tika ete boboto ya Nkolo, Nzambe na biso,
ezala elongo na biso !
Mpo na biso, sala ete misala na biso ekende liboso !
Iyo, sala ete misala na biso ekende kaka liboso !
Acessar a misericórdia
Cheguemos com confiança ao trono da graça. Ali encontramos misericórdia e graça para socorro no tempo oportuno.
Boye, topusana na elikya nyonso pene ya Kiti ya Bokonzi ya ngolu mpo ete Nzambe ayokela biso mawa mpe tozwa ngolu, oyo ekosunga biso na tango oyo ekoki.
Bandeko, mpo na mawa oyo Nzambe atalisi biso, nazali kosenga na bino ete bokabaka banzoto na bino epai ya Nzambe lokola mbeka ya bomoi, ya bule mpe esepelisaka Nzambe. Ekozala mpo na bino losambo ya solo kolanda ndenge esengeli.
Pamba te Nzambe alingaki mokili mingi penza, yango wana apesaki Mwana na Ye se moko, mpo ete moto nyonso oyo akondima Ye akufa te kasi azwa bomoi ya seko.
Mpo na oyo etali Klisto, Nzambe apesaki bino ngolu kaka te ya kondimela Ye, kasi ngolu mpe ya konyokwama mpo na Ye,
Ezekiasi atindaki bamemi sango kati na Isalaele mobimba mpe Yuda, mpe akomelaki Efrayimi mpe Manase mikanda mpo na kosenga na bango ete baya na Tempelo ya Yawe, na Yelusalemi, mpo na kosepela feti ya Pasika ya Yawe, Nzambe ya Isalaele. Mokonzi elongo na bakalaka na ye mpe lisanga mobimba ya Yelusalemi bazwaki mokano ya kosepela feti ya Pasika na sanza ya mibale. Balongaki te kosepela feti ya Pasika na mokolo oyo ekatama, pamba te Banganga-Nzambe oyo bamibulisaki bazalaki mingi te, mpe bato basanganaki te na Yelusalemi. Mokonzi mpe lisanga mobimba bandimaki mabongisi yango, bazwaki mokano ya kopesa mayebisi kati na Isalaele mobimba, longwa na Beri-Sheba kino na Dani, mpo na kosenga na bato nyonso ete baya kosepela feti ya Pasika, na Yelusalemi mpo na lokumu ya Yawe, Nzambe ya Isalaele. Pamba te bato moke kaka basepelaki yango kolanda ndenge ekomama kati na makomi.
Na etinda ya mokonzi, bamemi sango bakendeki kati na Isalaele mobimba mpe Yuda, na mikanda oyo ewutaki epai ya mokonzi mpe bakalaka na ye. Tala makambo oyo ezalaki kati na mikanda yango :
« Bana ya Isalaele, bozongela Yawe, Nzambe ya Abrayami, ya Izaki mpe ya Isalaele, mpo ete Ye mpe azongela bino oyo bobiki na maboko ya bakonzi ya mboka Asiri ! Bozala te lokola batata mpe bandeko na bino oyo bazangaki boyengebene liboso ya Yawe, Nzambe ya batata na bango. Yango wana asalaki ete babebisama ndenge bozali komona. Bozala moto makasi te lokola batata na bino ; bomipesa epai na Yawe, boya na Esika ya bule oyo Ye moko abulisi mpo na libela mpe bosalela Yawe, Nzambe na bino, mpo ete kanda makasi na Ye ezala mosika na bino ! Soki solo bozongeli Yawe, bandeko mpe bana na bino oyo bakendeki na bowumbu bakozwa ngolu liboso ya bato oyo bakangaki bango, mpe bakozonga na mokili oyo ; pamba te Yawe, Nzambe na bino, atonda na ngolu mpe na mawa. Solo, soki bozongeli Ye, akobalola te elongi na Ye mosika na bino. »
Bamemi sango batambolaki kati na bingumba nyonso ya Efrayimi mpe ya Manase kino na Zabuloni. Kasi bato bazalaki koseka mpe kotiola bango. Nzokande, ndambo ya bato ya Aseri, ya Manase mpe ya Zabuloni bamikitisaki mpe bakendeki na Yelusalemi. Kati na mokili ya Yuda, loboko ya Nzambe ezalaki kosala na nguya makasi epai ya bato, mpo na kopesa bango bomoko na molimo mpo na kotosa mitindo ya mokonzi mpe ya bakalaka na ye, kolandisama na Liloba na Yawe.
Bato ebele basanganaki na Yelusalemi mpo na kosepela feti ya Mapa ezanga levire, na sanza ya mibale : bazalaki penza ebele ya bato. Babukaki bitumbelo kati na Yelusalemi mpe balimwisaki bambabola nyonso ya malasi na kobwaka yango na lubwaku ya Sedron. Bakataki kingo ya mpate mpo na mbeka ya Pasika na mokolo ya zomi na minei ya sanza ya mibale. Banganga-Nzambe elongo na Balevi bayokaki soni, bamibulisaki mpe babonzaki bambeka ya kotumba kati na Tempelo ya Yawe. Bazongelaki misala na bango ndenge ekomama na mibeko ya Moyize, moto na Nzambe. Balevi bazalaki kopesa makila ya bambeka epai ya Banganga-Nzambe ; mpe bango, Banganga-Nzambe, bazalaki kosopa yango na etumbelo. Lokola bato mingi kati na lisanga bamibulisaki te, Balevi bazwaki mokumba ya kokata bakingo ya bampate ya Pasika mpo na bato wana nyonso oyo bazalaki peto te ; mpe na bongo, bakokaki te kobulisa bampate na bango epai na Yawe. Atako bato ebele oyo bawutaki na Manase, na Efrayimi, na Isakari mpe na Zabuloni bamipetolaki te, kasi baliaki Pasika na kozanga kolanda oyo ekomama. Yango wana Ezekiasi abondelaki boye mpo na bango :
« Yawe, Yo oyo ozali malamu, tika ete olimbisa moto nyonso oyo amipesi na koluka Nzambe, Yawe, Nzambe ya bakoko na ye, na motema na ye mobimba atako amipetolaki te kolanda mibeko ya Esika ya bule ! »
Yawe ayokaki libondeli ya Ezekiasi mpe abetaki bato te. Boye bato ya Isalaele oyo bazalaki na Yelusalemi basepelaki mikolo sambo mpe na esengo makasi feti ya Mapa ezanga levire wana Balevi mpe Banganga-Nzambe bazalaki kokumisa Yawe mikolo nyonso na kobeta makasi bibetelo mindule na bango mpo na lokumu ya Yawe. Ezekiasi alendisaki Balevi nyonso oyo balakisaki ete bayebi malamu mosala ya Yawe.
Na mikolo sambo ya feti, baliaki misuni ya bambeka, babonzaki bambeka ya boyokani mpe basanzolaki Yawe, Nzambe ya bakoko na bango.
Lisanga mobimba eyokanaki kobakisa mikolo mosusu sambo mpo na kokoba kosepela feti. Boye, basalaki feti na esengo na mikolo yango sambo. Ezekiasi, mokonzi ya Yuda, apesaki mpo na lisanga bangombe ya mibali nkoto moko, bameme mpe bantaba nkoto sambo ; mpe bakalaka bapesaki mpo na lisanga bangombe ya mibali nkoto moko, bameme mpe bantaba nkoto zomi. Banganga-Nzambe ebele bamibulisaki. Lisanga mobimba ya Yuda, Banganga-Nzambe, Balevi, bato nyonso ya Isalaele mpe bapaya oyo bawutaki na Isalaele to bavandi ya Yuda bazalaki na esengo. Esengo ezalaki makasi kati na Yelusalemi, pamba te wuta na tango ya Salomo, mwana mobali ya Davidi, mokonzi ya Isalaele, likambo ya boye etikala nanu kosalema te kati na Yelusalemi. Banganga-Nzambe mpe Balevi batelemaki mpo na kopambola bato, mpe Nzambe ayokaki bango mpo ete losambo na bango ekomaki kino na Likolo, evandelo na Ye ya bule.
« Soki mobali abomi libala na mwasi na ye,
mpe mwasi yango akei kobala mobali mosusu ;
boni, mobali yango akoki lisusu kozongela ye ?
Bomoni te ete mokili mobimba ekokoma penza mbindo ?
Nzokande yo, osalaki kindumba na mibali ebele,
bongo olingi sik’oyo kozongela Ngai, »
elobi Yawe.
« Tombola miso na yo na likolo ya bangomba mpe tala :
Boni, ezali penza na esika epai wapi ozangaki kosala ekobo ?
Ovandaki na nzela mpo na kozela bamakangu,
ovandaki wana lokola moto ya Arabi kati na esobe.
Boye, okomisaki mokili mbindo
na nzela ya ekobo na yo mpe ya misala na yo ya mabe.
Yango wana, mvula ekangamaki,
mpe mvula ya sima enokaki lisusu te.
Kasi atako bongo, okangami kaka na kosala kindumba na yo
mpe oboyi koyoka soni.
Boni, obengaka Ngai te :
‹ Tata na ngai, moninga na ngai ya bomwana ! ›
Ozali kutu kotuna Ngai :
‹ Boni, kino tango nini okokanga kanda ?
Kotomboka na yo ekosila te ? ›
Yango nde makambo ozali koloba,
kasi ozali mpe kaka kokoba na misala na yo ya mabe. »
Tango Joziasi azalaki mokonzi, Yawe alobaki na ngai : « Omoni makambo Isalaele oyo apengwi nzela na Ngai azali kosala ? Amataki likolo ya bangomba nyonso mpe atambolaki na se ya banzete nyonso ya mibesu mpo na kosala kindumba. Nakanisaki ete akozongela Ngai soki asilisi kosala makambo nyonso oyo azalaki na yango posa ; kasi azongeli Ngai te, mpe ndeko na ye ya mwasi, mopengwi Yuda, amonaki yango. Napesaki mopengwi Isalaele mokanda na ye ya koboma libala mpe nabenganaki ye likolo ya kindumba na ye ; kasi namonaki ete ndeko na ye ya mwasi, mopengwi Yuda, abangaki te ; ye mpe abimaki mpo na kosala kindumba. Lokola ezalaki likambo ya pamba mpo na Isalaele kosala kindumba, akomisaki mokili mbindo mpe asalaki kindumba na banzambe ya bikeko oyo basala na mabanga mpe na banzete. Atako bongo, ndeko na ye ya mwasi, mopengwi Yuda, azongaki epai na Ngai te na motema na ye mobimba ; azongaki na ye kaka likolo-likolo, » elobi Yawe.
Yawe alobaki na ngai : « Mopengwi Isalaele azali sembo koleka mopengwi Yuda. Kende kosakola sango oyo na nor :
‹ Oh mopengwi Isalaele, zonga, ›
elobi Yawe,
‹ Nakokangela yo lisusu elongi te,
pamba te nazali Moyengebene, ›
elobi Yawe.
‹ Nakokangela yo lisusu kanda te mpo na libela.
Ndima kaka mabe na yo,
mpo ete otombokelaki Yawe, Nzambe na yo ;
obebisaki ngolu na yo epai ya banzambe ya bapaya,
na se ya banzete nyonso ya mibesu,
mpe otosaki Ngai te, › »
elobi Yawe.
« Bozonga epai na Ngai, bino batomboki, » elobi Yawe, « pamba te nazali mobali na bino ya libala. Kati na bino, nakozwa moto moko kati na engumba moko na moko, mpe bato mibale kati na etuka moko na moko, mpo na kozongisa bino na Siona. Bongo nakopesa bino bakambi kolanda posa ya motema na Ngai, bakambi oyo bakotambolisa bino na bwanya mpe na mayele. Na mikolo wana, tango bokokoma penza ebele na mokili, » elobi Yawe, « bato bakoloba lisusu te : ‹ Sanduku ya Boyokani ya Yawe. › Bakomitungisa lisusu mpo na yango te mpe bakokanisa yango lisusu te ; kozanga na yango ekolobela bato eloko moko te, mpe bakoluka lisusu te kosala Sanduku ya Boyokani. Na tango wana, bakobenga Yelusalemi Kiti ya Bokonzi ya Yawe, mpe bikolo nyonso ekosangana na Yelusalemi mpo na kopesa lokumu na Kombo na Yawe. Boye, bakolanda lisusu te baposa mabe ya mitema na bango. Na tango wana, libota ya Yuda ekosangana elongo na libota ya Isalaele ; longwa na mokili ya nor, bakokende nzela moko kino na mokili oyo napesaki batata na bino lokola libula.
Namilobelaki :
‹ Esengo nini penza nazalaki na yango
ya kokamata bino lokola bana
mpe kopesa bino mikili ya kitoko,
libula oyo eleki kitoko kati na bikolo ! ›
Nakanisaki ete bokobenga Ngai ‹ Tata ›
mpe bokotika te kolanda Ngai.
Kasi bino lisanga ya Isalaele,
bokosi Ngai lokola mwasi
oyo asangisi nzoto na mobali mosusu, »
elobi Yawe.
Koganga ezali koyokana na likolo ya bangomba :
ezali mayi ya miso mpe kolelalela ya bana ya Isalaele,
pamba te babebisi nzela na bango
mpe babosani Yawe, Nzambe na bango.
« Bino batomboki, bozonga epai na Ngai
mpe nakobikisa bino na kopengwa na bino ! »
« Solo, tokozonga epai na Yo,
pamba te Yo, Yawe, nde ozali Nzambe na biso.
Solo, bisala-sala oyo ezali kosalema
na bangomba mikuse mpe milayi
ezali kaka makelele ya pamba.
Solo, Yawe, Nzambe na biso, azali Lobiko ya Isalaele.
Wuta bolenge na biso, banzambe ya bikeko
ebebisaki mbuma ya misala ya batata na biso,
bibwele na bango mpe ngombe na bango,
bana na bango ya mibali mpe ya basi.
Soni ekomi lokola mbeto na biso,
mpe kosambwa, lokola bulangeti mpo na komizipa ;
pamba te biso mpe batata na biso,
tosalaki masumu liboso ya Yawe, Nzambe na biso,
totosaki Yawe te, wuta bolenge na biso. »