Publicidade

Salmos 130

Wuta na mozindo ya pasi

1 Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Ndako ya Nkolo.

Nkolo, nazali kobelela Yo wuta na mozindo ya pasi !

2 Nkolo, yoka ngai !

Yoka mabondeli na ngai !

3 Yawe, soki obosanaka masumu te,

Nkolo, nani akokaki kotelema ?

4 Kasi bolimbisi ezali epai na Yo,

yango wana basengeli kotosa Yo.

5 Na motema na ngai mobimba,

nazali na elikya kati na Yawe,

nazali penza na elikya ;

nazali kozela maloba na Ye.

6 Nazali na elikya kati na Nkolo

koleka kutu ndenge mokengeli azelaka kotana ya tongo,

koleka penza ndenge mokengeli azelaka kotana ya tongo.

7 Isalaele, tia elikya kati na Yawe,

pamba te azali bolingo,

mpe kokangolama ya kokoka ezali elongo na Ye.

8 Ye nde akokangola Isalaele

na bambeba na yango nyonso.

Veja também

Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-07-05_19-25-13-