Pular para o conteúdo
Publicidade

A mulher virtuosa

Por Bíblia Online

A mulher virtuosa de Provérbios 31 é um retrato de excelência. Seu valor excede o de rubis — ela é sábia, trabalhadora, generosa e teme ao Senhor acima de tudo.

Uma joia rara

Mulher virtuosa, quem a achará? Seu valor excede o de rubis. Ela é o coração da família e a força do lar.

Masese mpo na mwasi ya lokumu

Nani akoki komona mwasi ya lokumu ?

Azali na motuya koleka babiju ya talo.

Masese mpo na mwasi ya lokumu

Nani akoki komona mwasi ya lokumu ?

Azali na motuya koleka babiju ya talo.

Mobali na ye atielaka ye motema

mpe azangaka te biloko ya motuya.

Tango nyonso ya bomoi na ye,

apesaka mobali na ye esengo, kasi mawa te ;

alukaka bapwale ya meme mpe basinga ya lino,

bongo maboko na ye etongaka yango na esengo.

Azali lokola masuwa ya bato ya mombongo,

akendaka koluka bilei na ye mosika ;

alamukaka wana butu ezali nanu,

abongisaka bilei mpo na ndako na ye

mpe akabolelaka basali na ye ya basi misala.

Soki asepeli na elanga, asombaka yango ;

mpe na mbuma ya misala na ye, alonaka elanga ya vino.

Akangaka loketo na ye makasi

mpe akembisaka maboko na ye na mosala.

Amonaka ete mombongo na ye etambolaka malamu ;

mpe kino na butu, mwinda na ye ekokufa te.

Maboko na ye esimbaka mitonga oyo batongelaka,

mpe misapi na ye etongaka bilamba.

Afungolaka loboko na ye mpo na kokabela babola,

mpe asembolaka yango mpo na kosunga bato bakelela.

Mwasi ya malamu azali motole ya mobali na ye,

kasi mwasi oyo ayokisaka soni azali lokola bokono

oyo ezali kolia mikuwa.

Mpe sik’oyo mwana na ngai ya mwasi, kobanga te ; nakosalela yo nyonso oyo okosenga, pamba te bato nyonso ya esika oyo bayebi ete ozali mwasi ya malonga.

Caráter acima da aparência

Enganosa é a graça e vã é a formosura, mas a mulher que teme ao Senhor será louvada. A verdadeira beleza é interior.

Bonzenga ya elongi ekosaka,

mpe kitoko ya nzoto ezalaka pamba ;

kasi mwasi oyo atosaka Yawe,

ye nde abongi na lokumu.

Nalingi mpe ete basi balataka na ndenge oyo ebongi, oyo ekoki te kobetisa bato mabaku, mpe na ndenge ya lolendo te ; bakangisa suki te mpe balata te ezala biloko ya wolo, mayaka to bilamba ya talo makasi, kasi balata nde misala ya malamu, misala oyo ebongi mpo na basi oyo batatolaka polele ete bagumbamelaka Nzambe.

Mwasi ya bwanya atongaka ndako na ye,

kasi mwasi oyo azangi mayele abukaka yango

na maboko na ye moko.

Moto akoki kozwa bandako mpe bomengo

lokola libula kowuta epai ya batata,

kasi mwasi ya bwanya azali likabo kowuta na Yawe.

Teya mpe bamama mibange ete bazala na bizaleli oyo ekoki na bato oyo bamibulisa mpo na Nzambe : basengeli te kotongaka bato mpe kozala bawumbu ya masanga ; basengeli nde komipesa na koteyaka makambo ya malamu, mpo ete balakisa na bilenge basi kolinga mibali na bango mpe bana na bango, komibatela malamu, kotambola na bomoi ya peto, komipesa na misala kati na bandako na bango, kozala basi ya boboto mpe ya botosi liboso ya mibali na bango, mpo ete Liloba na Nzambe efingama te.

Seja o primeiro