Publicidade

Nascimento

Por Bíblia Online

O nascimento é obra das mãos de Deus. Cada criança é formada por Ele no ventre materno com propósito e amor. A Bíblia celebra a vida desde a concepção até a eternidade.

O nascimento de Jesus

O maior nascimento da história mudou o curso da humanidade. Jesus nasceu de uma virgem pelo poder do Espírito Santo, conforme as profecias.

Elaka ya mbotama ya Yesu

Tala ndenge nini Yesu-Klisto abotamaki : Mari, mama na Ye, azalaki mobandami ya libala na Jozefi ; kasi liboso ete bavanda ndako moko, Mari akomaki na zemi na nguya ya Molimo Mosantu. Jozefi, mobandami na ye ya libala, azalaki moto ya sembo. Boye, lokola Jozefi alingaki te koyokisa Mari soni na miso ya bato, azwaki mokano ya koboya Mari na kimia.

Wana Jozefi azalaki kokanisa makambo yango, anjelu na Nkolo abimelaki ye kati na ndoto mpe alobaki na ye : « Jozefi, mokitani ya Davidi, kobanga te kobala Mari ; pamba te zemi oyo azali na yango ewuti na Molimo Mosantu. Akobota mwana mobali mpe okopesa Ye kombo Yesu, pamba te akobikisa bato na Ye na masumu na bango»

Makambo wana nyonso esalemaki mpo na kokokisa maloba oyo Nkolo alobaki na nzela ya mosakoli : « Elenge mwasi oyo ayebi nanu nzoto ya mibali te akokoma na zemi mpe akobota mwana mobali, bongo bakopesa Ye kombo Emanwele oyo elingi koloba : Nzambe elongo na biso»

Tango Jozefi alamukaki, asalaki makambo oyo anjelu na Nkolo atindaki ye kosala mpe azwaki Mari lokola mwasi na ye. Kasi Jozefi asangisaki nzoto te na Mari kino tango Mari abotaki mwana mobali ; mpe Jozefi apesaki Ye kombo Yesu.

Ye moko Nkolo akopesa bino elembo : moseka akokoma na zemi mpe akobota mwana mobali, akopesa Ye Kombo « Emanwele»

Sango ya mbotama ya Yesu

Sima na basanza motoba, Nzambe atindaki anjelu Gabrieli kati na engumba moko ya Galile, kombo na yango ezalaki « Nazareti» Atindaki ye epai ya elenge mwasi Mari oyo ayebaki nanu nzoto ya mibali te mpe azalaki mobandami ya libala na mobali moko oyo kombo na ye ezalaki Jozefi, mokitani ya Davidi.

Kasi anjelu alobaki na ye :

Mari, kobanga te ! Pamba te Nzambe asaleli yo ngolu ! Okozwa zemi, okobota mwana mobali mpe okopesa Ye kombo « Yesu» Akozala Moto monene, mpe bakobenga Ye : Mwana ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo. Nkolo Nzambe akopesa Ye kiti ya bokonzi ya Davidi, koko na Ye. Akozala Mokonzi ya libota ya Jakobi mpo na libela, mpe bokonzi na Ye ekozala na suka te.

Mari atunaki anjelu :

Ekosalema ndenge nini, pamba te nayebi nanu nzoto ya mibali te ?

Anjelu azongiselaki ye :

Molimo Mosantu akokitela yo, mpe nguya ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo ekozipa yo na elilingi na Ye. Boye Mosantu oyo okobota akobengama Mwana na Nzambe.

Formados desde o ventre

Deus nos teceu no ventre de nossa mãe. Antes de nascermos, Ele já nos conhecia e nos separou para um propósito sagrado.

Ezali Yo nde okelaki mozindo ya bomoto na ngai,

obombaki ngai kati na libumu ya mama na ngai.

Nasanzolaka Yo, pamba te osala ngai kitoko makasi.

Misala na Yo ezali ya kokamwa ;

ngai, nayebi yango malamu.

Na miso na Yo, nzoto na ngai ezalaki ya kobombama te

tango osalaki ngai na esika ebombama,

tango otongaki ngai kati na mozindo ya mabele.

Tango nazalaki nanu na lolenge te,

ozalaki komona ngai ;

mpe omikomelaki kati na buku na Yo

mikolo nyonso oyo obongisaki mpo na bomoi na ngai

liboso ete moko te kati na yango ezala.

Liboso ete nasala yo kati na libumu ya mama na yo, nayebaki yo ; liboso ete obotama, nabulisaki yo : naponaki yo mpo ete ozala mosakoli ya bikolo.

« Atiaka motema na ye epai na Yawe ;

tika ete Yawe abikisa ye !

Tika ete Yawe akangola ye,

pamba te asepelaka na Ye »

Solo, Yawe, obimisaki ngai na libumu ya mama na ngai,

obatelaki ngai na kimia na tolo na ye.

Wuta mbotama na ngai, natalelaka Yo ;

Yo nde obimisaki ngai na libumu ya mama na ngai.

Nakokumisa Yo tango nyonso.

Boni, mama akoki solo kobosana

bebe na ye oyo azali komelisa mabele,

to kozanga bolingo epai ya mwana oyo ye aboti ?

Ata soki akoki kobosana,

ngai nakoki kobosana yo te !

Nakoki solo koyeisa pasi ya kobota

mpe kozanga makoki ya kobotisa »

Elobi Yawe.

« Nakoki solo kokanga mabota

soki nazali kopesa mabota » elobi Nzambe na yo.

Crianças — bênção e promessa

Jesus acolheu as crianças e disse: delas é o Reino dos céus. Os filhos são herança do Senhor e motivo de alegria para os pais.

Yesu alobaki :

Botika bana mike baya epai na Ngai, bopekisa bango te koya epai na Ngai ; pamba te Bokonzi ya Likolo ezali mpo na bato oyo bazali lokola bango.

Yango wana, moto nyonso oyo akomikitisa lokola mwana oyo, ye nde aleki monene kati na Bokonzi ya Likolo. Moto nyonso oyo, na Kombo na Ngai, akoyamba mwana lokola oyo, ayambi nde Ngai moko.

Bongo ayambaki bana yango, na maboko na Ye, atielaki bango maboko mpe apambolaki bango.

Bana bazali libula kowuta na Yawe,

mpe kobota bana ezali lifuti.

Nazalaki kobondela mpo ete nazwa mwana oyo, mpe Yawe asilaki kopesa ngai oyo nasengaki Ye.

na lindanda ya basinga zomi

mpe na nzenze !

Nascer de novo

Jesus ensinou que é preciso nascer de novo para ver o Reino de Deus. O novo nascimento é espiritual — pelo Espírito e pela Palavra.

Yesu azongiselaki ye :

Nazali koloba na yo penza ya solo : moto moko te akoki komona Bokonzi ya Nzambe soki abotami te mbotama ya sika.

Na tango ya kobota, mwasi ayokaka pasi makasi, pamba te eleko ya kobimisa mwana wuta kati na libumu na ye ekoki ; kasi soki kaka aboti, abosanaka pasi nyonso oyo amonaki, mpo na esengo oyo atondaka na yango mpo ete aboti moto.

Moto nyonso oyo akoma mwana na Nzambe akobaka te kosala masumu, pamba te nguya ya bomoi ya bonzambe ezali kosala kati na ye ; akoki te kokoba kosala masumu, pamba te azali mwana na Nzambe.

Boyemba mpo na lokumu na Ye,

bosanzola Ye na mindule !

Botatolaka tango nyonso misala minene na Ye nyonso !

Seja o primeiro
Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-07-05_19-25-13-