Pular para o conteúdo
Publicidade

Obediência aos pais

Por Bíblia Online

A obediência aos pais é mandamento divino com promessa de vida longa. A Bíblia valoriza a honra filial e ensina os filhos a respeitar e obedecer aos pais com amor.

Honrar pai e mãe

O quinto mandamento ordena honrar pai e mãe. É o primeiro mandamento com promessa: para que vá bem e vivas muito na terra.

Okopesaka tata na yo mpe mama na yo lokumu mpo ete ozala na bomoi ya molayi kati na mokili oyo Yawe, Nzambe na yo, azali kopesa yo.

Okopesaka tata na yo mpe mama na yo lokumu, ndenge Yawe, Nzambe na yo, atindaki yo mpo ete ozala na bomoi ya molayi, mpe ozala moto ya esengo kati na mokili oyo Yawe, Nzambe na yo, azali kopesa yo.

Solo, Nzambe alobaki : « Okopesaka tata na yo mpe mama na yo lokumu ; mpe moto oyo akolakela tata na ye to mama na ye mabe asengeli na etumbu ya kufa»

Baboti mpe bana

Bino bana, botosaka baboti na bino kati na Nkolo, pamba te yango nde ezali sembo. Tala mobeko ya liboso oyo ekangani na elaka : Okopesaka tata mpe mama na yo lokumu mpo ete ozala moto ya esengo mpe ozala na bomoi ya molayi kati na mokili.

Bino batata, bopesaka bana na bino kanda te, kasi bobokolaka bango kati na mateya mpe makebisi ya Nkolo.

Obedecer e respeitar

Filhos, obedecei a vossos pais no Senhor. A obediência filial é expressão de amor e temor a Deus.

Bana, botosaka baboti na bino na makambo nyonso, pamba te ezali ndenge wana nde bokosepelisa Nkolo.

Mwana na ngai ya mobali, yoka toli ya tata na yo,

mpe kobwaka te mateya ya mama na yo ;

Pamba te ekozala lokola ekoti ya ngolu na moto na yo,

mpe lokola mayaka ya kitoko na kingo na yo.

Mwana na ngai, batela mibeko ya tata na yo

mpe kosundola te mateya ya mama na yo.

Kanga yango tango nyonso na motema na yo,

lata yango na kingo na yo.

Pamba te ekolakisa yo nzela tango okokende na mobembo,

ekobatela yo tango okolala pongi

mpe ekosolola na yo tango okolamuka.

Mibeko ezali mwinda, mateya ezali pole,

makebisi mpe pamela ezali nzela ya bomoi,

Batoli ya tata

Bana na ngai, boyokaka mateya ya tata,

bozalaka na bokebi mpo ete bozwa mayele.

Pamba te nazali kopesa bino mateya ya malamu ;

bobwaka mateya na ngai te.

Ngai mpe nazalaki mwana malamu

na miso ya tata na ngai,

boye mama na ngai alingaki ngai makasi

lokola mwana oyo abotama kaka ye moko.

Tata na ngai azalaki koteya

mpe koloba na ngai boye :

« Tika ete motema na yo ebatela maloba na ngai,

bomba mibeko na ngai mpe okozala na bomoi,

zwa bwanya, zwa mayele, kobosana yango te,

kopesa mokongo te na maloba ya monoko na ngai,

kosundola bwanya te, mpe yango ekobatela yo,

linga yango mpe ekobomba yo.

Mwana mayele ayokaka mateya ya tata na ye,

kasi mwana oyo atiolaka ayokaka pamela te.

Lakisa mwana nzela oyo asengeli kotambola wuta na bomwana na ye ;

ezala tango akokoma mokolo, akobunga yango te.

Disciplina e consequências

A vara e a repreensão dão sabedoria. A Bíblia adverte sobre as consequências sérias da rebeldia e desonra aos pais.

Fimbu mpe pamela epesaka bwanya,

kasi mwana oyo basundola ayokisaka mama na ye soni.

Mwana oyo abetaka tata na ye

mpe abenganaka mama na ye

ayeisaka soni mpe mawa.

Liso oyo etiolaka tata mpe ezanga botosi epai ya mama,

ekotobolama na bayanganga ya lubwaku,

mpe bana ya mpongo ekolia yango.

Moto oyo akobeta tata to mama na ye, asengeli kozwa etumbu ya kufa.

Soki mwana atombokeli baboti na ye

Soki moto azali na mwana oyo azali moto makasi mpe motomboki, oyo atosaka te ezala tata to mpe mama na ye, mpe ayokelaka bango te ata soki bapesi ye etumbu, tata mpe mama na ye bakokanga ye mpe bakomema ye epai ya bampaka na ekuke ya engumba na bango. Bakoloba na bampaka ya engumba : « Mwana na biso oyo azali moto makasi mpe motomboki, atosaka biso te, azali lokoso mpe molangwi masanga» Boye bato nyonso ya engumba na ye bakobamba ye mabanga kino akokufa. Na nzela wana nde bokolongola mabe kati na bino. Tango bana nyonso ya Isalaele bakoyoka yango, bakobanga.

Moto oyo alakelaka tata to mama na ye mabe,

mwinda na ye ekokufa kati na molili.

Bokangaka motema liboso ya bapasi oyo Nzambe apesaka bino lokola etumbu, pamba te azwaka bino lokola bana na Ye. Boni, ezali solo na mwana oyo tata na ye apesaka ye etumbu te ?

Soki mwasi akufisa mobali azali na bana to bakoko, bana to bakoko yango basengeli, liboso na nyonso, koyekola kotalisa botosi na bango kati na makambo ya Nzambe na nzela ya kosunga libota na bango mpe kozongisa bolamu epai ya baboti mpe bakoko na bango, pamba te kosala bongo esepelisaka Nzambe.

Seja o primeiro