Pais
Deus é nosso Pai celestial — amoroso, provedor, disciplinador e fiel. As Escrituras também honram os pais terrenos e os chamam a criar os filhos na instrução do Senhor.
O Pai celestial
Deus é Pai de misericórdias. Ele nos adotou como filhos, nos ama incondicionalmente e cuida de cada detalhe da nossa vida.
Botala bolingo monene oyo Tata atalisaki biso mpo ete tobengama bana na Nzambe ! Mpe tozali solo bana na Nzambe. Tala tina nini mokili eyebi biso te : ezali mpo ete eyebi Nzambe te.
Botala bolingo monene oyo Tata atalisaki biso mpo ete tobengama bana na Nzambe ! Mpe tozali solo bana na Nzambe. Tala tina nini mokili eyebi biso te : ezali mpo ete eyebi Nzambe te.
Solo, bozwaki te Molimo oyo akomisaka bino bawumbu mpo ete bozala na kobanga, kasi bozwaki Molimo oyo akomisaka bino bana na Nzambe, mpe ezali na nzela ya Molimo yango nde togangaka : « Tata ! » Molimo Ye moko atatolaka na molimo na biso ete tozali bana na Nzambe.
nzokande bato nyonso oyo bayambaki Ye, ba-oyo bandimelaki Kombo na Ye, apesaki bango makoki ya kokoma bana na Nzambe.
Tika ete ngolu mpe kimia epesamela bino kowuta na Nzambe, Tata na biso, mpe na Nkolo Yesu-Klisto !
Ndenge tata alingaka makasi bana na ye,
ndenge wana mpe Yawe alingaka makasi
bato oyo batosaka Ye ;
Ndenge tata alingaka makasi bana na ye,
ndenge wana mpe Yawe alingaka makasi
bato oyo batosaka Ye ;
pamba te Yawe ayebi na eloko nini asala biso,
ayebi malamu ete tozali putulu.
Boyembela Nzambe, boyemba banzembo
mpo na lokumu ya Kombo na Ye.
Bofungola nzela mpo na Ye
oyo atambolisaka mampinga na Ye kati na esobe.
Kombo na Ye ezali Yawe.
Botonda na esengo liboso na Ye.
Oh Yawe, tika ete kanda na Yo eleka ndelo te ;
kokanisaka masumu na biso tango nyonso te !
Tala biso ndenge tozali kobondela,
pamba te biso nyonso tozali bato na Yo.
Nzokande, Yo nde ozali Tata na biso ;
atako Abrayami ayebi biso te
to Isalaele andimi biso te ;
kasi Yo, Yawe, ozali Tata na biso,
Kombo na Yo ezali : Mosikoli na biso ya tango nyonso.
Bokonzi na ye ekokende mosika penza,
mpe kimia na ye ekozala na suka te.
Akovanda na kiti ya bokonzi ya Davidi,
akozala mokonzi ya mokili na ye,
akolendisa mpe akokamba yango
na bosembo mpe na boyengebene,
wuta na tango oyo kino libela na libela.
Yango nde makambo oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga,
akosala na bolingo makasi na Ye.
Bokonzi na ye ekokende mosika penza,
mpe kimia na ye ekozala na suka te.
Akovanda na kiti ya bokonzi ya Davidi,
akozala mokonzi ya mokili na ye,
akolendisa mpe akokamba yango
na bosembo mpe na boyengebene,
wuta na tango oyo kino libela na libela.
Yango nde makambo oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga,
akosala na bolingo makasi na Ye.
O cuidado paterno de Deus
O Pai celestial sabe do que precisamos antes de pedirmos. Ele dá boas dádivas aos filhos que pedem e cuida até dos passarinhos.
Botala ndeke ya likolo : elonaka nkona te, ebukaka bambuma te, ebombaka bilei te kati na bibombelo ; kasi Tata na bino ya Likolo aleisaka yango. Boni, bozali na motuya te koleka yango ?
Boni, batekaka te bandeke mike mibale na motuya ya mbongo oyo eleki moke ? Nzokande, moko te kati na yango ekweyaka na mabele soki Tata na bino alingi te. Mpo na bino, Nzambe ayebi ata motango ya suki na bino. Yango wana, bobanga te, boleki bandeke mike nyonso na motuya.
Kasi yo, soki olingi kosambela, kota na shambre na yo, kanga ekuke mpe sambela Tata na yo, oyo azali kati na esika wana ya sekele ; bongo Ye, Tata na yo, oyo amonaka makambo oyo esalemaka na nkuku, akopesa yo lifuti.
Kasi tango yo ozali kokila bilei, sukola elongi na yo malamu mpe pakola moto na yo malasi, mpo ete moto moko te ayeba ete ozali kokila bilei, longola kaka Tata na yo, oyo amonanaka te ; bongo Ye, Tata na yo, oyo amonaka makambo oyo esalemaka na nkuku akopesa yo lifuti.
Nani kati na bino, batata, akopesa na mwana na ye nyoka soki asengi ye mbisi, to akopesa ye koto soki asengi ye liki ? Bongo soki bino bato oyo bozali kutu mabe boyebi kopesa na bana na bino biloko ya malamu, ndenge nini Tata oyo azali na Likolo apesa te Molimo Mosantu epai ya bato oyo basengaka Ye !
Oh etonga moke, bobanga te ! Pamba te Tata na bino asepelaki kopesa bino Bokonzi !
bolamu nyonso mpe likabo nyonso ya kitoko ewutaka kaka na Likolo, epai ya Tata ya pole, oyo, kati na Ye, molili ezalaka te, mpe abongwanaka te.
Ye oyo aboyaki te kopesa Mwana na Ye se moko, kasi akabaki Ye mpo na biso nyonso, ndenge nini azanga kopesa biso biloko nyonso elongo na Ye na nzela ya ngolu ?
Conhecer o Pai
Jesus é o caminho para o Pai. Ninguém conhece o Pai senão o Filho e aquele a quem o Filho quiser revelar.
Yesu azongiselaki ye :
— Ngai, nazali nzela, solo mpe bomoi. Moto moko te akoki koya epai ya Tata, soki na nzela na Ngai te.
Kati na ndako ya Tata na Ngai, bisika ezali mingi. Soki ezalaki bongo te, boni, nalingaki koyebisa bino ete nakeyi kuna mpo na kobongisela bino esika ?
Mpe nakosala nyonso oyo bokosenga na Kombo na Ngai, mpo ete Tata azwa lokumu kati na Mwana.
Moto oyo alingaka Ngai, ezali ye oyo abatelaka mibeko na Ngai mpe atiaka yango na misala. Tata na Ngai akolinga moto oyo alingaka Ngai ; Ngai mpe nakolinga ye mpe nakomimonisa epai na ye.
Yesu azongiselaki ye :
— Moto oyo alingaka Ngai akobatela maloba na Ngai, mpe Tata na Ngai akolinga ye ; bongo tokoya epai na ye mpe tokovanda elongo na ye.
Moto moko te amona Nzambe, kasi ezali kaka Mwana se moko oyo azali Nzambe mpe azali moko na Tata nde atalisaki biso Ye.
Napesi yango bomoi ya seko : ekokufa soki moke te, mpe moto ata moko te akobotola yango na loboko na Ngai. Tata na Ngai, oyo apesaki Ngai bameme yango, aleki bato nyonso na monene, mpe moto moko te akoki kobotola yango na loboko ya Tata na Ngai. Ngai mpe Tata tozali se moko.
Tata, nalingi ete bato oyo opesaki Ngai bazala elongo na Ngai kuna epai nazali kokende, mpo ete bamona nkembo na Ngai, nkembo oyo opesaki Ngai, pamba te olingaki Ngai liboso ete okela mokili.
Tata na Ngai apesa Ngai biloko nyonso. Moko te ayebi Mwana longola kaka Tata, mpe moko te ayebi Tata longola kaka Mwana mpe ye oyo epai ya nani Mwana asepeli kotalisa Tata.
Bozala bato ya kokoka ndenge Tata na bino ya Likolo azali ya kokoka.
Kasi bino, bolinga te ete bato babenga bino ‹ Moteyi, › pamba te bozali na Moteyi kaka moko, mpe bino nyonso bozali bandeko. Bobenga moto moko te awa na mokili ‹ Tata, › pamba te bozali kaka na Tata moko, mpe azali kati na Likolo.
Okanisi ete nakoki te kobenga Tata na Ngai, oyo akoki mpe mbala moko kotinda ba-anjelu koleka bankoto zomi mpo na koya kosunga Ngai ?
Boyokelaka bato mawa, ndenge kaka Tata na bino ayokelaka bato mawa.
Tika ete nkembo ezonga mpo na libela na libela epai na Nzambe oyo azali Tata na biso ! Amen.
Disciplina e amor paterno
O Pai disciplina os filhos que ama. A correção divina produz fruto de justiça e paz para aqueles que foram exercitados por ela.
Bokangaka motema liboso ya bapasi oyo Nzambe apesaka bino lokola etumbu, pamba te azwaka bino lokola bana na Ye. Boni, ezali solo na mwana oyo tata na ye apesaka ye etumbu te ? Soki bapesi bino etumbu te ndenge bana nyonso bazwaka, elingi koloba ete bozali bana bazanga tata, kasi bana ya ndako te.
Mpo ete biso nyonso tozalaki na batata ya mosuni, oyo bazalaki kopesa biso bitumbu, mpe tozalaki kaka kotosa bango, bongo mpo na nini te kotosa Tata ya milimo mpo ete tozwa bomoi ? Batata na biso bazalaki kopesa biso bitumbu mpo na mwa tango moke, ndenge mitema na bango ezalaki kolinga ; kasi Nzambe apesaka biso etumbu mpo na bolamu na biso, mpo ete tokoka kosangana na bosantu na Ye.
Mwana na ngai, yamba toli ya Yawe,
koboya te pamela na Ye ;
pamba te Yawe apamelaka moto oyo Ye alingaka,
ndenge kaka tata apamelaka mwana na ye, oyo alingaka.
Mwana na ngai, yamba toli ya Yawe,
koboya te pamela na Ye ;
pamba te Yawe apamelaka moto oyo Ye alingaka,
ndenge kaka tata apamelaka mwana na ye, oyo alingaka.
Pais terrenos
A Bíblia honra os pais que criam os filhos nos caminhos de Deus. Honrar pai e mãe é mandamento com promessa de vida longa.
Baboti mpe bana
Bino bana, botosaka baboti na bino kati na Nkolo, pamba te yango nde ezali sembo. Tala mobeko ya liboso oyo ekangani na elaka : Okopesaka tata mpe mama na yo lokumu mpo ete ozala moto ya esengo mpe ozala na bomoi ya molayi kati na mokili.
Bino batata, bopesaka bana na bino kanda te, kasi bobokolaka bango kati na mateya mpe makebisi ya Nkolo.
Bino batata, bopesaka bana na bino kanda te, kasi bobokolaka bango kati na mateya mpe makebisi ya Nkolo.
Okopesaka tata na yo mpe mama na yo lokumu mpo ete ozala na bomoi ya molayi kati na mokili oyo Yawe, Nzambe na yo, azali kopesa yo.
Mwana na ngai ya mobali, yoka toli ya tata na yo,
mpe kobwaka te mateya ya mama na yo ;
Pamba te ekozala lokola ekoti ya ngolu na moto na yo,
mpe lokola mayaka ya kitoko na kingo na yo.
Tata ya moto ya sembo akozala na esengo mingi,
mpe moto oyo abota mwana ya bwanya akosepela kati na ye.
Moto oyo azangi mayele atiolaka mateya ya tata na ye,
kasi moto oyo andimaka pamela akokoma mayele.
Bakitani bazali motole ya bakoko,
mpe baboti bazali lokumu ya bana.
Moto oyo alakelaka tata to mama na ye mabe,
mwinda na ye ekokufa kati na molili.
Bana, botosaka baboti na bino na makambo nyonso, pamba te ezali ndenge wana nde bokosepelisa Nkolo.
Batata, boyokisaka bana na bino kanda te, noki te mitema na bango ekolemba.
Bana bazali libula kowuta na Yawe,
mpe kobota bana ezali lifuti.
Ndenge makonga ezali kati na maboko ya mobundi bitumba,
ndenge wana mpe bana oyo moto aboti
na bolenge na ye bazali.
Esengo na moto oyo atondisi makonga
kati na ebombelo na ye ya makonga !
Akokufa soni ata moke te
tango akosamba elongo na banguna na ye
na ekuke ya engumba.
Bato na bomoi, bato ya bomoi kaka nde basanzolaka Yo
ndenge ngai nazali kosanzola Yo lelo.
Batata bakoteya bana na bango boyengebene na Yo.
Bakoboma batata te mpo na bana na bango to mpe bakoboma bana te mpo na batata na bango ; bakoboma moto na moto mpo na masumu na ye moko.
Pamba te bikelamu nyonso ezali kozela na posa makasi ete bana na Nzambe bamonisama.
Batata, nazali kokomela bino, pamba te boyebi Ye oyo azala wuta na ebandeli. Bilenge, nazali kokomela bino, pamba te bolongaki Satana.
Bana, nakomeli bino mpo ete boyebi Tata. Batata, nakomeli bino mpo ete boyebi Ye oyo azala wuta na ebandeli. Bilenge, nakomeli bino mpo ete bozali makasi, Liloba na Nzambe ezali kowumela kati na bino, mpe bolongaki Satana.
Koyina mokili
Bolingaka mokili te ; bolingaka mpe te nyonso oyo ezali kati na mokili. Moto oyo alingaka mokili azalaka na bolingo ya Tata te kati na ye,