Palavras de consolo
A Bíblia é repleta de palavras de consolo para os aflitos. Deus está perto dos que sofrem e promete enxugar toda lágrima, renovar a esperança e restaurar o coração partido.
Deus está conosco
O Senhor é refúgio e fortaleza. Mesmo no vale da sombra da morte, não precisamos temer — Ele está ao nosso lado para nos consolar.
Ata soki nasengeli kokatisa lubwaku
oyo etondi na molili ya kufa,
nakobanga mabe ata moko te,
pamba te ozali elongo na ngai,
nzete na Yo ya mobateli ekambaka ngai,
mpe lingenda na Yo ebatelaka ngai.
Nabatelami malamu epai ya Nzambe
Nzembo ya Davidi.
Yawe azali pole mpe lobiko na ngai ;
nakobanga nani ?
Yawe azali ndako batonga makasi ya bomoi na ngai ;
nakolenga liboso ya nani ?
Akonzaka mokili na bosembo,
akataka makambo ya bato na alima.
Nalukaka eloko moko kowuta na Yawe,
eloko moko kaka oyo nasengaka makasi :
nalingi kovanda na Tempelo ya Yawe,
mikolo nyonso ya bomoi na ngai,
mpo na kosepelaka na kitoko ya Yawe
mpe kosengaka toli na Ye kati na Tempelo na Ye.
Pamba te, na tango ya pasi,
akobatela ngai kati na evandelo na Ye,
akobomba ngai kati ya Ndako na Ye ya bule
mpe akotelemisa ngai na likolo ya libanga.
Nkolo Yawe, ozali elikya na ngai ;
wuta bolenge na ngai, namipesaka na Yo.
Consolação e esperança
Deus consola os humildes e exalta os abatidos. Ele nunca nos desamparará.
Ye moko Yawe akotambola liboso na yo mpe akozala elongo na yo. Kobanga te mpe yika mpiko. »
Bobanga bango te, pamba te Yawe, Nzambe na bino, Ye moko akobundela bino. »
Boni, nalobaki na yo te : Zala makasi mpe yika mpiko ? Kozala na somo te mpe kolemba nzoto te, pamba te Ngai Yawe, Nzambe na yo, nakozala elongo na yo na bisika nyonso oyo okokende. »
atombolaka bato oyo babwakama,
mpe apesaka esengo na bato oyo bazali kolela ;
Tika ete Ye moko Yesu-Klisto, Nkolo na biso, mpe Nzambe, Tata na biso, oyo alingaki biso mpe apesaki biso, na ngolu na Ye, malendisi ya seko mpe elikya ya malamu,
Descanso e renovação
Bem-aventurados os que choram, pois serão consolados. A Bíblia nos convida a descansar nos braços do Pai e encontrar paz para a alma.
Esengo na bato oyo bazali kolela,
pamba te bakobondisama !
Yango wana, bomikitisaka na se ya loboko ya nguya ya Nzambe mpo ete atombola bino na tango oyo ekoki. Bobwaka epai na Ye makambo nyonso oyo etungisaka bino, pamba te Ye nde abatelaka bino.
Salela ngai elembo ya boboto na Yo
mpo ete banguna na ngai bamona yango mpe bakufa soni !
Yawe, ozali Mosungi mpe Mobondi na ngai.
Tika ete bolingo na Yo ebondisa ngai,
kolanda elaka na Yo epai ya mosali na Yo !
Tango okolala, okobanga eloko moko te,
pamba te pongi na yo ekozala ya kimia.
Likambo nyonso ezalaka na tango na yango
Likambo nyonso ezalaka na tango na yango,
mpe mosala nyonso ezalaka na ngonga na yango,
na se ya moyi.
Ezali na tango ya kobotama mpe tango ya kokufa,
tango ya kolona mpe tango ya kopikola oyo elonami ;
tango ya koboma mpe tango ya kobikisa,
tango ya kobuka mpe tango ya kotonga ;
tango ya kolela mpe tango ya koseka,
tango ya kosala matanga mpe tango ya kobina ;
tango ya kopanza mabanga mpe tango ya kosangisa yango,
tango ya kopesa beze mpe tango ya kotika kopesa beze ;
tango ya koluka mpe tango ya kobungisa,
tango ya kobomba mpe tango ya kobwaka ;
tango ya kopasola mpe tango ya kobamba,
tango ya kokanga monoko mpe tango ya koloba ;
tango ya kolinga mpe tango ya koyina,
tango ya bitumba mpe tango ya kimia.