Pão
O pão é símbolo central na Bíblia: do maná no deserto ao pão da vida — Jesus. A Escritura usa o pão para ensinar sobre provisão divina, comunhão e dependência espiritual.
O maná do céu
Deus alimentou Israel no deserto com pão do céu. O maná era diário, fiel e suficiente — retrato da provisão constante de Deus.
Yawe alobaki na Moyize :
— Nayoki koyimayima ya bana ya Isalaele. Yebisa bango : « Na pokwa ya lelo, bokolia misuni ; bongo na tongo, bokotonda mana. Boye, bokoyeba solo ete nazali Yawe, Nzambe na bino. »
Kaka na pokwa wana, bakayi eyaki mpe etondisaki molako ; mpe na tongo, mamwe ezalaki zingazinga ya molako.
Tango mamwe elimwaki, biloko ya mike-mike penza lokola bambuma ya mike-mike emonanaki na mabele ya esobe, pembe lokola mvula ya pembe.
Tango bana ya Isalaele bamonaki yango, batunanaki bango na bango :
— Oyo nini ?
Pamba te bayebaki te soki ezali nini.
Moyize alobaki na bango :
— Ezali mapa oyo Yawe apesi bino mpo ete bolia.
Bato ya Isalaele babengaki lipa yango mana. Ezalaki pembe lokola bambuma ya koriande mpe elengi lokola mikate balamba na mafuta ya nzoyi.
Nzokande, apesaki mitindo na mapata
mpe afungolaki bikuke ya likolo,
anokiselaki bango mana lokola mvula
mpo na kopesa bilei,
apesaki bango ble ya Likolo.
Moko na moko aliaki mapa ya ba-anjelu.
Atindelaki bango bilei ebele penza.
Matiti ebotaka mpo na bibwele,
mpe milona ya bato ekolaka
mpo ete mabele ebotela bango bilei,
vino mpo na kosepelisa mitema na bango,
mafuta mpo na kongengisa bilongi na bango,
mpe mapa mpo na kolendisa mitema na bango.
O pão da vida
Jesus declarou: 'Eu sou o pão da vida.' Quem vem a Ele nunca terá fome, e quem nele crê jamais terá sede. Ele é o sustento eterno.
Kasi Yesu azongiselaki bango :
— Nazali koloba na bino penza ya solo : ezali Moyize te moto apesaki bino lipa oyo ezalaki kowuta na Likolo, kasi ezali Tata na Ngai nde apesaka bino lipa ya solo oyo ewutaka na Likolo. Pamba te lipa ya Nzambe ezali Ye oyo akiti wuta na Likolo mpe apesaka mokili bomoi.
Bongo balobaki na Ye :
— Nkolo, pesaka biso lipa yango tango nyonso.
Yesu azongiselaki bango :
— Ngai nazali lipa oyo epesaka bomoi. Moto nyonso oyo akoya epai na Ngai akoyoka lisusu nzala te, mpe moto nyonso oyo akondima Ngai akoyoka lisusu posa ya mayi te.
pamba te nazali lipa oyo epesaka bomoi. Bakoko na bino baliaki mana kati na esobe mpe bakufaki, kasi botala lipa oyo ewuti na Likolo ; moto oyo akolia yango akokufa te. Ngai nde nazali lipa ya bomoi oyo ewuti na Likolo ; moto nyonso oyo akolia lipa yango, akozala na bomoi ya seko ; mpe lipa oyo nakopesa mpo ete mokili ezwa bomoi ezali nde nzoto na Ngai.
Abukaki lolendo na yo, abomaki yo nzala mpe aleisaki yo mana oyo yo mpe batata na yo botikalaki koyeba te, mpo na koteya yo ete moto abikaka kaka na lipa te, kasi mpe na maloba nyonso oyo ebimaka na monoko ya Yawe.
Yesu azongisaki :
— Ekomama : « Moto akobika na lipa kaka te,
kasi mpe na maloba nyonso oyo ebimaka na monoko ya Nzambe. »
Partilha e comunhão
O partir do pão une o corpo de Cristo. Na Ceia, na generosidade e na partilha, expressamos a comunhão com Deus e uns com os outros.
Bongo, azwaki lipa mpe, sima na Ye kozongisa matondi epai ya Nzambe, akataki yango mpe apesaki bango yango ; alobaki :
— Oyo ezali nzoto na Ngai, epesami mpo na bino ! Bosalaka boye mpo na kokanisa Ngai.
Boye, tango nyonso bokozala kolia lipa oyo mpe komela kopo oyo, bokozala kosakola kufa ya Nkolo kino akozonga.
Boni, kopo ya elambo oyo, mpo na yango, tozongisaka matondi epai ya Nzambe, ekomisaka biso te moko na makila ya Klisto ? Lipa oyo tokataka ekomisaka biso te moko na nzoto ya Klisto ? Lokola lipa ezali kaka moko, biso nyonso tozali kosala nzoto kaka moko atako tozali ebele, pamba te biso nyonso tokabolaka lipa yango kaka moko.
Tala ndenge nini bosengeli kosambela :
‹ Tata na biso,
Yo oyo ozali kati na Likolo ;
tika ete Kombo na Yo ebulisama,
tika ete Bokonzi na Yo eya,
tika ete mokano na Yo esalema,
awa na mokili ndenge esalemaka kuna na Likolo !
Pesa biso, na mokolo ya lelo,
bilei na biso ya mokolo na mokolo ;
Moto oyo akabaka na esengo akopambolama,
pamba te akabolaka bilei na ye na mobola.
Kasi Yesu azongisaki :
— Bopesa bango bino moko biloko ya kolia.
Bayekoli balobaki na Ye :
— Ondimi penza tokende kosomba mapa mpe toleisa bango, na mbongo ya bibende nkama mibale ?
Yesu atunaki bango :
— Mapa boni bozali na yango ? Bokende nanu kotala.
Bakendeki kotala mpe balobaki :
— Tozali na mapa mitano mpe bambisi mibale.
Yesu apesaki bango mitindo ete bakabola bato nyonso na masanga mpe bavandisa bango na matiti ya mobesu. Boye, batandamaki na milongo ya bato nkama moko mpe ya bato tuku mitano. Yesu akamataki mapa mitano mpe bambisi mibale yango, atombolaki miso na Ye na likolo mpe azongisaki matondi epai ya Nzambe ; akataki mapa yango mpe apesaki biteni na yango epai ya bayekoli na Ye mpo ete bakabola yango epai na bato. Akabolaki lisusu bambisi nyonso mibale epai ya bango nyonso. Bato nyonso baliaki mpe batondaki. Bongo bayekoli balokotaki biteni ya mapa mpe ya bambisi, oyo etikalaki ; mpe biteni yango etondisaki bitunga zomi na mibale.
Provisão divina
O justo não é desamparado e seus descendentes não mendigam pão. Deus provê com fidelidade o alimento de cada dia.
Nazalaki elenge, mpe sik’oyo nakomi mobange,
namoni nanu te moto ya sembo kosundolama
to bana na ye kokoma kosenga-senga bilei.
Tango bayekoli bakatisaki na ngambo mosusu ya ebale, babosanaki komema mapa. Yesu alobaki na bango :
— Bosala keba na levire ya Bafarizeo mpe ya Basaduseo !
Bayekoli bakomaki kokanisa mpe komituna bango na bango :
— Azali koloba bongo mpo ete tomemi mapa te !
Yesu asosolaki makanisi na bango ; alobaki :
— Bato ya kondima moke ! Bozali kolobana bino na bino mpo ete bozali na mapa te ! Mpo na nini ? Boni, bozwi kaka bososoli nanu te ? Bobosani penza mapa mitano oyo bokabolelaki bato nkoto mitano, mpe motango ya bitunga oyo bozongaki na yango sima na kokabolela bato ? Bobosani lisusu mapa sambo oyo bokabolelaki bato nkoto minei, mpe motango ya bitunga oyo bozongaki na yango sima na kokabolela bato ? Ndenge nini bozali kososola te ete nazalaki koloba na tina na mapa te, tango nalobaki na bino : bosala keba na levire ya Bafarizeo mpe ya Basaduseo ?
Boye, bayekoli basosolaki ete alobaki na bango te ete basala keba na levire ya mapa, kasi nde basala keba na mateya ya Bafarizeo mpe ya Basaduseo.
Kosala tango moyi ezali nanu
Bwaka lipa na yo na likolo ya mayi,
pamba te sima na mikolo ebele, okomona yango lisusu.
Kaba biloko na yo na bato sambo to mwambe,
pamba te oyebi te pasi nini ekoki koya na mokili.