Pular para o conteúdo
Publicidade

Zakari 13

Kopetolama na masumu

1 Na mokolo wana, etima moko ekobimisa mayi mpo na kopetola masumu mpe mbindo ya libota ya Davidi mpe ya bavandi ya Yelusalemi.

2 Na mokolo wana, elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, nakosala ete bakombo ya banzambe ya bikeko elimwa na mokili ; boye bakotikala kokanisa yango lisusu te. Nakolongola lisusu kati na mokili basakoli mpe molimo ya mbindo. 3 Boye, soki moto moko akobi kosakola, tika ete tata mpe mama oyo babota ye baloba na ye : ‹ Osengeli kokufa mpo ete olobi makambo ya lokuta na Kombo na Yawe Wana akozala kosakola, baboti na ye bakotobola ye na mopanga. 4 Na mokolo wana, mosakoli moko na moko akozala na soni mpo na kosakola mpe koloba bimoniseli na ye ; akokosa lisusu bato te na kolataka bilamba ya basakoli, oyo basala na bapwale. 5 Akoloba : ‹ Nazali na ngai mosakoli te ; ngai nasalaka na ngai bilanga, mabele nde ezalaka libula na ngai wuta bolenge na ngai 6 Soki batuni ye : ‹ Bongo bapota oyo ezali na tolo na yo ewuti wapi Akozongisa : ‹ Nazokaki yango kati na ndako ya balingami na ngai

Kobetama ya mobateli bibwele

7 Oh mopanga, telema !

Tika ete otelema mpo na koboma mobateli bibwele na Ngai !

Tika ete oboma moninga na Ngai»

elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.

« Beta mobateli bibwele,

mpe bameme ekopalangana.

Bongo nakoboma ata bibwele ya mike.

8 Na mokili mobimba»

elobi Yawe,

« bandambo mibale ya bato kati na bandambo misato

bakobebisama mpe bakokufa ;

mpe ndambo moko ya bato kati na bandambo misato

nde bakotikala na mokili.

9 Nakomema ndambo moko wana ya bato na moto,

nakopetola bango ndenge bapetolaka palata na moto

mpe nakomeka bango

ndenge bamekaka wolo na moto ;

bakobelela Kombo na Ngai,

mpe Ngai nakoyanola bango.

Nakoloba na bango :

‹ Bozali bato na Ngai

mpe bango bakoloba :

‹ Yawe azali Nzambe na biso › »

Estes versículos te tocaram? Ore agora!

+581 estão orando agora.

Junte-se à corrente de oração.

Veja também