Publicidade

Poder de decisão

Por Bíblia Online

Deus nos deu o poder de escolher. A Bíblia mostra que nossas decisões têm consequências eternas e nos chama a escolher sabiamente — a vida, a fé e o caminho de Deus.

A responsabilidade de escolher

Escolhei hoje a quem servireis. Cada decisão molda nosso destino, e Deus nos convida a escolher o caminho da vida e da obediência.

Kasi soki bosepeli kosalela Yawe te, bopona lelo nani bolingi kosalela ; banzambe oyo batata na bino basalelaki tango bazalaki na ngambo mosusu ya ebale to banzambe ya bato ya Amori epai wapi bozali kovanda. Kasi ngai mpe libota na ngai, tokosalela Yawe»

Jozue alobaki na bato :

Bozali bino moko batatoli mpo na bino awa boponi kosalela Yawe.

Bazongisaki :

Ezali se bongo, tondimi yango, tozali batatoli.

Mpo na yango, oh libota ya Isalaele, nakosambisa bino, moto na moto kolanda misala na ye, elobi Nkolo Yawe. Bobongwana, botika mabe na bino nyonso mpo ete masumu na bino emema bino na kobebisama te ! Botika mabe na bino nyonso oyo bozalaki kosala ; bozwa mitema ya sika mpe molimo ya sika. Mpo na nini bokolinga kokufa, oh libota ya Isalaele ? Solo, Ngai nasepelaka na kufa ya moto moko te, elobi Nkolo Yawe. Bobongwana mpe bozala na bomoi »

Nayebi misala na yo, mpe nayebi malamu ete ozali malili te mpe ozali moto te ; nalingaki nde ozala malili to moto. Kasi lokola ozali malili te mpe ozali moto te, nazali kosanza yo wuta na monoko na Ngai.

Decisões e consequências

Deus retribuirá a cada um segundo as suas obras. As Escrituras nos alertam que a mornidão espiritual e a resistência ao Espírito têm consequências sérias.

Nzambe akofuta moto na moto kolanda misala na ye : bomoi ya seko epai ya moto oyo, na nzela ya molende na ye ya kosala malamu, alukaka nkembo, lokumu mpe makambo oyo ebebaka te ; kasi kanda mpe kanda makasi epai ya moto oyo, na nzela ya botomboki na ye, aboyaka solo mpe asepelaka na mabe.

Bato ya mito makasi, ya mitema mabanga mpe bakufa matoyi ! Bozali ndenge moko kaka na bakoko na bino : botelemelaka tango nyonso Molimo Mosantu !

Boye, bobungisa elikya na bino te, pamba te lifuti monene ekangani na yango. Na bongo, boyika mpiko mpo ete, sima na bino kokokisa mokano ya Nzambe, bozwa biloko oyo alakaki. Etikali moke, moke penza,

ete Ye oyo asengeli koya aya,

mpe akoya kala te.

Moto na ngai ya sembo akobika na nzela ya kondima ;

kasi soki azongi sima, nakosepela na ye te.

Biso tozali te na molongo ya bato oyo bazongaka sima mpo na kobungisa bomoi na bango, kasi tozali na molongo ya bato oyo bazali na kondima mpo ete tobikisama.

Decisão e fé

Decida com fé, entregue seus planos ao Senhor e aja com determinação. Deus guia os passos de quem se achega a Ele de coração.

Bakobetaka zeke kati na elamba ya Nganga-Nzambe,

kasi mikano nyonso ewutaka na Yawe.

Motema ya moto ezalaka na makanisi ebele,

kasi ezali mokano ya Yawe nde ekokisamaka.

Pesa misala na yo epai na Yawe,

mpe mabongisi na yo ekokokisama.

Lokola Nkolo Yawe asungaka ngai,

nakoyokisama soni te.

Yango wana, nakomisi elongi na ngai

makasi lokola libanga,

mpe nayebi ete nakoyokisama soni te.

Moto nyonso oyo azwi mokano ya kosala makambo oyo Nzambe alingaka, akososola soki mateya na Ngai ewuti na Nzambe to nazali koloba na ndenge na Ngai moko.

Bakozala bato na Ngai, mpe Ngai nakozala Nzambe na bango. Nakopesa bango motema se moko mpe etamboli se moko mpo ete batosaka Ngai tango nyonso mpo na bolamu na bango mpe mpo na bolamu ya bakitani na bango.

Petelo azongiselaki bango :

Bobongola mitema ; tika ete moko na moko kati na bino azwa libatisi na Kombo na Yesu-Klisto mpo ete masumu na ye elimbisama, bongo bokozwa likabo ya Molimo Mosantu.

Bomikitisa liboso ya Nzambe. Botelemela Satana, mpe akokima mosika na bino. Bopusana pene ya Nzambe, mpe Ye akoya pene na bino. Bino bato ya masumu, bosukola maboko na bino ; bino bato ya mitema mibale, bopetola mitema na bino !

Graziela Milhorance
1 pessoa deu Amém
Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-07-05_12-11-46-