Publicidade

Isaías 12

Nzembo mpo na kokumisa Yawe

1 Na mokolo wana, okoloba :

« Oh Yawe, nazali kosanzola Yo,

pamba te ata osilikelaki ngai,

kanda na Yo elongwaki likolo na ngai

mpe obondisaki ngai !

2 Solo, Nzambe azali lobiko na ngai ;

nakotia elikya na ngai epai na Ye

mpe nakobanga lisusu te.

Nkolo Yawe azali makasi mpe nguya na ngai ;

azali lobiko na ngai. »

3 Yango wana, botoka mayi na esengo

na etima ya lobiko.

4 Na mokolo wana bokoloba :

« Bosanzola Yawe, bobelela Kombo na Ye,

bosakola misala na Ye kati na bikolo

mpe botatola ete Kombo na Ye ezali likolo na nyonso.

5 Boyemba loyembo mpo na Yawe,

pamba te asali makambo ya kokamwa.

Tika ete mokili mobimba eyeba yango !

6 Bino bato ya Siona, bobeta milolo mpe boyemba loyembo na esengo,

pamba te Mosantu ya Isalaele azali monene kati na bino ! »

Veja também

Publicidade
Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-06-15_21-32-39-