Publicidade

Isaías 15

Maloba ya kosambisa Moabi

1 Maloba ya kosambisa mokili ya Moabi :

Pamba te na butu oyo Moabi ebebisamaki,

Ari kati na Moabi mpe ebebisamaki,

solo, ebebisamaki kaka na butu moko !

Kiri kati na Moabi mpe ebebisamaki ;

solo, ebebisamaki kaka na butu moko !

2 Bato ya Diboni bazali komata

na bisika na bango ya bule,

na bisambelo na bango ya likolo ya bangomba,

mpo na kolela ;

Moabi akomi koganga mpo na Nebo mpe Medeba.

Bakokoli mito nyonso mpe bakati mandefu nyonso.

3 Balati-lati basaki na babalabala,

bato nyonso bazali kolela na likolo ya mitondo ya bandako

mpe na bisika oyo bato ebele bakutanaka ;

bazali penza kosopa mpinzoli ebele.

4 Eshiboni mpe Eleale ezali koganga makasi,

mingongo ya bato na yango ezali koyokana kino na Yakatsi ;

yango wana, mampinga ya Moabi bazali mpe koganga

mpe mitema na bango ebukani.

5 Nazali kolela na se ya motema mpo na Moabi,

banguna na ye bazali kokima kino na Tsoari,

kino na Egilati-Shelishiya ;

bazali komata na nzela ya Luyiti na kolela ;

mpe na nzela ya Oronayimi, bazali kosala matanga

mpo na kobebisama na bango.

6 Mayi ya Nimirimi ekawuki,

bongo matiti mpe esili kokawuka,

matiti ya mobesu eziki-ziki nyonso

mpe matiti ya kitoko ezali lisusu te.

7 Yango wana, bamemi bomengo oyo bazwaki

mpe oyo babombaki na lubwaku ya banzete ya pepiliye.

8 Kolela na bango etamboli na mokili mobimba ya Moabi ;

koganga na bango eyokanaki kino na Egilayimi,

mpe kino na mabulu ya mayi ya Elimi.

9 Mayi ya Dimoni etondi na makila,

kasi nakotinda lisusu pasi makasi na Dimoni :

nkosi moko ekobimela bato ya Moabi oyo bakobika.

Veja também

Publicidade
Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-06-18_14-04-22-