Publicidade

Isaías 46

Banzambe ya Babiloni mpe Yawe

1 Tala banzambe ya Babiloni :

Beli esili ngala, Nebo ekweyi ;

bikeko na yango etiami likolo ya banyama, likolo ya bibwele !

Bikeko oyo bomemaka ezali kilo makasi,

ezali mokumba oyo elembisaka banyama.

2 Banzambe yango ya bikeko egumbami mpe ekweyi nzela moko,

ezali na makoki te ya kobikisa mokumba na yango,

pamba te ekeyi na bowumbu.

3 Oh ndako ya Jakobi, boyoka Ngai,

mpe bino nyonso, batikali ya libota ya Isalaele,

bino oyo nandima kobatela wuta na libumu ya mama

mpe nandima komema mokumba

wuta mbotama na bino.

4 Ezala tango bokotonda na suki ya pembe

mpe bokokoma mibange,

Ngai nakobongwana te, nakosunga bino kaka ;

Ngai nde nasalaki bino, nakomema mokumba na bino,

nakosunga bino mpe nakobikisa bino.

5 Bolingi kokokanisa Ngai

to kotia Ngai esika moko na nani ?

Bolingi solo kokokanisa Ngai na nani

mpo ete amekana na Ngai ?

6 Bazali bato oyo babimisaka wolo

na mabenga na bango

mpe bamekaka kilo ya palata na emekelo ;

bafutaka mosolo epai ya mosali bikeko na bibende

mpo ete asalela bango nzambe ya ekeko

ya wolo mpe ya palata,

mpo ete bafukamela mpe bagumbamela yango.

7 Batiaka yango na mapeka mpe bamemaka yango,

batelemisaka yango na esika na yango

mpe etikalaka ya kotelema kaka wana.

Wuta na esika na yango, ekoningana te.

Ata soki moto moko abeleli yango, ekoyanola te,

ekobikisa ye te na tango ya pasi.

8 Bokanisa yango lisusu, mpo bososola malamu ;

bino batomboki, bozongisa yango lisusu na mitema na bino !

9 Bokanisa lisusu makambo ya liboso,

makambo oyo ya kala penza ;

solo, Ngai nazali Nzambe, mpe mosusu azali te,

nazali Nzambe, moko te akokani na Ngai.

10 Nasakolaki makambo ya suka na ebandeli ;

wuta kala penza, nasakolaki makambo oyo ekoya.

Nalobaki : « Mabongisi na Ngai ekolongisama,

mpe nakosala nyonso oyo nasepeli kosala. »

11 Wuta na este, nabengi ndeke oyo eliaka misuni ;

longwa na mokili ya mosika,

moto oyo akokokisa mabongisi na Ngai.

Makambo oyo nalobaki, yango nde ekokokisama ;

oyo nabongisaki, yango nde ekosalema.

12 Boyoka Ngai, bino bato ya mitema makasi,

bino bato oyo bozali mosika ya bosembo !

13 Bosembo na Ngai ekomi pene,

ezali lisusu mosika te ;

mpe lobiko na Ngai ekowumela te.

Nakopesa lobiko epai na Siona,

mpe nkembo na Ngai, epai na Isalaele.

Veja também

Publicidade
Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-06-15_21-32-39-