Publicidade

Isaías 62

1 Mpo na likambo ya Siona,

nakokanga monoko na Ngai te ;

mpo na likambo ya Yelusalemi,

nakovanda kimia te,

kino bosembo na ye emonana

lokola kongenga ya pole,

mpe lobiko na ye emonana lokola mwinda.

2 Bongo bikolo ekomona bosembo na yo,

mpe bakonzi nyonso bakomona nkembo na yo.

Bakobenga yo na kombo ya sika

oyo monoko na Yawe ekopesa.

3 Okozala motole ya nkembo kati na loboko ya Yawe

mpe ekoti ya bokonzi kati na loboko ya Nzambe na yo.

4 Bakobenga yo lisusu te Engumba basundola,

bakobenga lisusu mokili na yo te Mokili ebeba ;

kasi bakobenga yo « Esengo ya Yawe, »

mpe bakobenga mokili na yo « Mwasi ya libala, »

pamba te Yawe akozwa esengo kati na yo,

mpe mabele na yo ekozwa mobali ya libala.

5 Lokola elenge mobali abalaka moseka,

bana na yo ya mibali mpe bakobala yo ;

lokola elenge mobali asepelaka

na mobandami na ye ya mwasi,

Nzambe na yo mpe akosepela na yo.

6 Oh Yelusalemi,

natelemisi basenzeli na likolo ya bamir na yo ;

bakovanda nye te, ezala na moyi to na butu.

Bino bato oyo bosalaka ete

Yawe akanisa lisusu Yelusalemi,

bovanda kimia te ;

7 mpe botikela Ye te tango ya kopema

kino tango akozongisa kimia na Yelusalemi

mpe akokomisa yango mboka ya lokumu kati na mokili !

8 Yawe atomboli loboko na Ye ya mobali,

loboko na Ye ya nguya,

mpe alapi ndayi :

« Nakopesa lisusu ble na yo te

lokola bilei epai ya banguna na yo ;

bapaya bakomela lisusu te vino na yo ya sika

oyo omonelaki pasi ;

9 kasi bato oyo bakobuka ble bakolia yango

mpe bakokumisa Yawe,

mpe ba-oyo bakokamola vino bakomela yango

kati na lopango ya Esika na Ngai ya bule. »

10 Boleka, boleka na bikuke !

Bobongisela bato nzela,

bopasola nzela, bopasola nzela ya monene !

Bolongola mabanga,

botombola bendele liboso na bato ya bikolo.

11 Tala makambo oyo Yawe atatoli

kino na basuka ya mabele :

« Boloba na Siona, mboka kitoko :

‹ Tala, Mobikisi na yo azali koya !

Tala, lifuti na ye ezali elongo na ye,

mpe azali kotambola elongo na litomba na ye. › »

12 Bakobenga bango Libota mosantu,

basikolami na Yawe ;

mpe bakobenga yo Engumba oyo alingaka,

engumba oyo basundola te.

Veja também

Publicidade
Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-06-15_21-32-39-