Publicidade

Proximidade

Por Bíblia Online

Deus é próximo dos que o buscam. Ele não é um Deus distante, mas presente, íntimo e acessível a todo o que o invoca com sinceridade de coração.

Buscar a presença de Deus

A Bíblia nos exorta a buscar a face do Senhor continuamente. Quem se aproxima dele encontra plenitude de alegria e delícias perpétuas.

Bomipesa na Yawe.

Bosenga makasi na Ye.

Bolukaka tango nyonso elongi na Ye.

Bomipesa na Yawe mpe bosenga makasi na Ye !

Bolukaka tango nyonso elongi na Ye !

Boluka Yawe wana akoki nanu komonana,

bobelela Ye wana azali nanu pene.

Nalukaka eloko moko kowuta na Yawe,

eloko moko kaka oyo nasengaka makasi :

nalingi kovanda na Tempelo ya Yawe,

mikolo nyonso ya bomoi na ngai,

mpo na kosepelaka na kitoko ya Yawe

mpe kosengaka toli na Ye kati na Tempelo na Ye.

Oh Nzambe, Yo oyo ozali nguba na biso, tala !

Tala elongi ya mopakolami na Yo !

Okolakisa ngai nzela ya bomoi ;

okotondisa ngai na esengo kati na bozalisami na Yo,

elongo na bilengi ya suka te na ngambo ya loboko na Yo ya mobali.

Deus está perto

O Senhor está perto dos que o invocam, dos quebrantados de coração e dos que clamam por socorro. Sua presença nos sustenta.

kasi Yawe apesaka bato mabe mokongo

mpo ete bakanisa bango lisusu te kati na mokili.

Tango bato ya sembo babelelaka,

Yawe ayokaka mpe akangolaka bango

na pasi na bango nyonso.

Tika ete boboto na bino eyebana na bato nyonso. Nkolo akomi pene.

Kasi sik’oyo, kati na Yesu-Klisto, bino oyo na kala bozalaki mosika, bokomi pene na nzela ya mbeka ya makila ya Klisto.

Solo, na mikolo nyonso ya bomoi na ngai,

esengo mpe bolingo na Yo ekobanda kolanda ngai ;

mpe nakovanda kati na Tempelo ya Yawe

kino suka ya bomoi na ngai.

A presença que nunca abandona

Deus promete nunca nos deixar. Ele permanece fiel, está conosco em todo tempo e envia o Espírito para habitar em nossos corações.

Nakotika bino te lokola bana bitike ; nakozongela bino.

Tika ete Yawe, Nzambe na biso, azala elongo na biso ndenge azalaki elongo na batata na biso ; atika biso te mpe abwaka biso te ;

Kasi na mawa monene na Yo, osilisaki bango te na koboma mpe osundolaki bango te ; pamba te ozali Nzambe otonda na mawa mpe na ngolu.

Bambote

Tika ete Ye moko Nkolo na kimia apesaka bino kimia tango nyonso mpe na lolenge nyonso ! Tika ete Nkolo azala elongo na bino nyonso !

Bandeko na ngai, nasukisi mokanda na ngai na maloba oyo : Bosepelaka ! Bolukaka kokoma bato ya kokoka, bolendisanaka bino na bino, bozalaka na likanisi moko, bobikaka bomoi na bino na kimia. Bongo Nzambe ya bolingo mpe ya kimia akozala na bino elongo.

Tala ndenge nini toyebaka ete tozali kati na Nzambe, mpe Nzambe azali kati na biso : ezali na nzela ya Molimo na Ye, oyo apesa biso.

Moto moko te amona Nzambe, kasi ezali kaka Mwana se moko oyo azali Nzambe mpe azali moko na Tata nde atalisaki biso Ye.

Moyize asalaki kuna elongo na Yawe mikolo tuku minei mpe babutu tuku minei ; aliaki ata eloko moko te mpe amelaki mayi te. Bongo Moyize akomaki na bitando ya mabanga maloba ya Boyokani oyo babengi mibeko zomi.

bobikisa babeli oyo bazali kuna mpe boloba na bango : « Bokonzi ya Nzambe ekomi pene na bino»

Asa asali boyokani ya sika

Molimo ya Nzambe akitelaki Azaria, mwana mobali ya Odedi. Azaria ayaki liboso ya Asa mpe alobaki na ye : « Asa elongo na bato nyonso ya Yuda mpe ya Benjame, boyoka ngai ! Yawe azalaka elongo na bino soki bino bozali elongo na Ye. Soki boluki Ye, akomimonisa epai na bino. Nzokande, soki botiki Ye, Ye mpe akotika bino ! Na tango molayi, Isalaele azangaki Nzambe ya solo, azangaki Banganga-Nzambe mpo na koteya ye, mpe azangaki mibeko. Kasi kati na pasi na bango, bazongelaki Yawe, Nzambe ya Isalaele ; balukaki Ye, mpe Ye amimonisaki epai na bango. Na tango yango, kimia ezalaki te mpo na bato oyo bazalaki kokende mpe kozonga, pamba te mobulu ezalaki kati na bavandi nyonso ya mikili. Ekolo moko ezalaki kobundisa ekolo mosusu, engumba moko ezalaki kobundisa engumba mosusu, pamba te Nzambe azalaki kokotisa mobulu kati na bango na nzela ya pasi ya lolenge nyonso. Boye bino, botelema ngwi mpe bolemba te, pamba te misala na bino ezali na lifuti»

Sima na Asa koyoka maloba oyo mpe lisakoli ya Azaria, mwana mobali ya mosakoli Odedi, azwaki mpiko, alongolaki banzambe ya bikeko kati na bituka ya Yuda, ya Benjame mpe kati na bingumba oyo abotolaki kati na etuka ya bangomba ya Efrayimi ; azongisaki etumbelo ya Yawe oyo ezalaki liboso ya ndako moke ya kokotela na Tempelo ya Yawe. Asangisaki bato nyonso ya Yuda mpe ya Benjame, elongo na bato oyo bawutaki na mabota ya Efrayimi, ya Manase mpe ya Simeoni, oyo bakomaki kovanda kati na bango, pamba te bana ebele ya Isalaele basanganaki na mokonzi Asa tango bamonaki ete Yawe, Nzambe na ye, azali elongo na ye. Basanganaki na Yelusalemi na sanza ya misato ya mobu ya zomi na mitano ya bokonzi ya Asa. Na mokolo wana, kati na bomengo ya bitumba oyo bazongaki na yango, babonzelaki Yawe bangombe nkama sambo mpe bameme nkoto sambo. Basalaki boyokani na kolapa ndayi ete bakokangama na Yawe, Nzambe ya batata na bango, na mitema mpe na molimo na bango mobimba ; bongo moto nyonso oyo akokangama te na Yawe, Nzambe ya Isalaele, azala mwana to mokolo, tata to mama, basengeli koboma ye. Balapaki ndayi epai na Yawe, na mongongo makasi, na kobeta maboko mpe milolo, mpe na lokito ya kelelo mpe ya maseke. Bato nyonso ya Yuda basepelaki na ndayi yango, pamba te balapaki yango na mitema na bango mobimba ; bazwaki mokano ya kokangama na Yawe Nzambe na esengo, mpe Ye amimonisaki epai na bango. Boye, Yawe apesaki bango bopemi na bangambo nyonso.

Mokonzi Asa alongolaki ezala Maaka, mama na ye, na lokumu ya mama ya mokonzi, pamba te Maaka asalelaki nzambe mwasi Ashera ekeko ya soni. Asa abukaki ekeko yango ya soni kino kokomisa yango putulu, mpe atumbaki yango kati na lubwaku ya Sedron. Kasi abebisaki te kati na Isalaele bisambelo ya likolo ya bangomba. Nzokande, Asa abatelaki motema na ye sembo, na mikolo nyonso ya bomoi na ye ; azongisaki kati na Tempelo ya Nzambe biloko oyo tata na ye mpe ye moko babulisaki : palata, wolo mpe biloko mosusu.

Bitumba ezalaki lisusu te kino na mobu ya tuku misato na mitano ya bokonzi ya Asa.

Seja o primeiro
Publicidade
Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-06-29_22-07-56-