Pular para o conteúdo
Publicidade

Redentor

Por Bíblia Online

Deus é o nosso Redentor. Ele nos resgatou da escravidão do pecado, nos libertou das cadeias e nos comprou com preço altíssimo — o sangue de seu Filho.

Liberdade em Cristo

Cristo nos libertou para a liberdade. Aquele a quem o Filho liberta é verdadeiramente livre. O Redentor quebra toda cadeia.

Boye, soki Mwana akangoli bino, bokozala penza bansomi.

Tozali na bonsomi kati na Klisto

Ezali mpo ete tozala bansomi nde Klisto akangolaki biso. Yango wana, botelema ngwi mpe bozonga lisusu na bowumbu te.

Mobu ya ngolu na Yawe mpo na Siona

Molimo ya Nkolo Yawe azali likolo na ngai,

pamba te Yawe apakoli ngai mafuta

mpo na kosakola sango malamu epai ya babola,

kobikisa bato oyo mitema na bango esili kozoka,

kosakola bonsomi epai ya bawumbu

mpe kobimisa bakangami na boloko ;

Molimo apesaka bomoi

Yango wana sik’oyo, etumbu ezali lisusu te mpo na bato oyo bazali kati na Yesu-Klisto. Pamba te kati na Yesu-Klisto, Mobeko ya Molimo oyo apesaka bomoi ekangoli ngai na bowumbu ya mobeko ya lisumu mpe ya kufa.

Redenção e salvação

Deus nos redimiu por amor. Ele apagou nossas transgressões e nos salvou não por mérito nosso, mas por sua misericórdia.

Nalongoli mabe na yo lokola lipata,

masumu na yo lokola lipata ya tongo.

Zonga epai na Ngai,

pamba te nasili kosikola yo»

Akobota mwana mobali mpe okopesa Ye kombo Yesu, pamba te akobikisa bato na Ye na masumu na bango»

amikabaki Ye moko mpo na biso, mpo ete akangola biso na mabe nyonso mpe apetola biso mpo na Ye moko lokola bato na Ye, oyo batondi na posa makasi ya kosala misala ya malamu.

Kasi awa bolongwe sik’oyo na se ya bowumbu ya lisumu mpe bokomi na se ya bowumbu ya Nzambe, litomba oyo bozwi ezali bomoi ya bosantu, mpe suka na yango ezali bomoi ya seko.

Refúgio e proteção

O Redentor é nosso refúgio e fortaleza. Ele livra os que clamam, sara os quebrantados e se alegra por nós com cântico.

Natondi Yo mpo ete okangoli ngai

Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi, mosali na Yawe. Ayembelaki Yawe nzembo na maloba oyo, tango Yawe akangolaki ye wuta na maboko ya banguna na ye nyonso mpe na loboko ya Saulo.

Oh Yawe, makasi na ngai, nalingaka Yo.

Natie elikya na ngai kati na Yawe

Nzembo ya Davidi. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi.

Kasi ngai, natiaka elikya na ngai kati na Yo, Yawe,

mpe nalobaka : « Ozali Nzambe na ngai»

kasi Yawe apesaka bato mabe mokongo

mpo ete bakanisa bango lisusu te kati na mokili.

Tango bato ya sembo babelelaka,

Yawe ayokaka mpe akangolaka bango

na pasi na bango nyonso.

Yawe azali pene ya bato

oyo bazoki na mitema

mpe abikisaka ba-oyo balembi na milimo na bango.

Nzambe Mobikisi na biso, sunga biso

mpo na lokumu ya Kombo na Yo,

kangola biso mpe limbisa masumu na biso

mpo na Kombo na Yo !

Nakoganga na esengo tango nakoyemba

banzembo mpo na lokumu na Yo,

pamba te okangoli bomoi na ngai.

Bino bato oyo bolingaka Yawe,

boyina mabe !

Yawe abatelaka bomoi ya bayengebene na Ye

mpe akangolaka bango na maboko ya bato mabe.

Oh Yawe, kangola ngai

wuta na maboko ya bakosi

mpe wuta na lolemo ya lokuta !

Vestidos de salvação

O Redentor nos veste com roupas de salvação e manto de justiça. Ele se alegra por nós e nos cobre com seu amor.

Nakosepela makasi kati na Yawe,

molimo na ngai ekosepela kati na Nzambe na ngai,

pamba te alatisi ngai bilamba ya lobiko

mpe azipi ngai na elamba ya bosembo,

ndenge mobandami ya mobali alataka

motole na ye ya kitoko lokola Nganga-Nzambe

to ndenge mobandami ya mwasi alataka mayaka na ye ya talo.

Yawe, Nzambe na yo, azali elongo na yo,

azali Elombe Mobikisi.

Akosepela na yo makasi

mpe akopemisa yo, na bolingo na Ye ;

akoyemba banzembo ya esengo na tina na yo

Seja o primeiro