Repouso e férias
Deus criou o descanso como parte da vida. O sábado, o repouso e até as férias refletem a confiança de que Deus sustenta todas as coisas — mesmo quando paramos.
O descanso como ordenança
Deus descansou no sétimo dia e nos convidou a fazer o mesmo. O descanso sabático é um presente de Deus para restauração do corpo e da alma.
Boye, mpo na bato ya Nzambe, etikali na bopemi moko oyo ezali lokola mokolo ya sambo oyo Nzambe apemaki. Pamba te moto oyo akoti kati na bopemi ya Nzambe apemi na misala na ye, ndenge kaka Nzambe apemaki na misala na Ye.
Soki obateli matambe na yo
ete ebebisa te lokumu ya mokolo ya Saba,
mpe ete osala te mosala oyo yo olingi
na mokolo na Ngai ya bule ;
soki mokolo ya Saba ekomi esengo na yo
mpe opesi lokumu na mokolo ya bule ya Yawe ;
soki opesi yango lokumu
na koboya kolanda nzela na yo moko,
kosala misala na yo moko
mpe kokoba na makambo oyo ezanga tina,
wana okozwa esengo na yo kati na Yawe
mpe nakomema yo na bisika ya likolo ya mokili,
nakoleisa yo wuta na libula ya Jakobi, tata na yo, »
elobi Yawe.
Boye, ezala kolia to komela, nyonso oyo bokoki kozala kosala, bosalaka nyonso mpo na lokumu ya Nzambe.
Sono e paz
Ditar-se em paz e dormir tranquilamente é bênção do Senhor. Quem confia nele dorme sem medo e acorda renovado.
Tondisa motema na ngai na esengo
soki bafuluki na bambuma ya ble elongo na vino ya sika.
Nabelelaka Yawe,
mpe ayanolaka ngai wuta na ngomba na Ye ya bule.
Ezali na pamba nde, bino mpe,
bolamukaka na tongo makasi,
bolalaka noki te mpe bosalaka makasi
mpo na kozwa bilei ;
pamba te Nzambe apesaka bilei yango
kaka na balingami na Ye,
wana bazali nanu kolala pongi.
Okobanga te somo ya butu,
makonga oyo epumbwaka na moyi makasi,
Tango okolala, okobanga eloko moko te,
pamba te pongi na yo ekozala ya kimia.
Namoni mabe moko na se ya moyi,
epesaka penza mawa :
moto abombi bomengo na ye,
kasi ememeli ye pasi ;
Descanso e segurança
No repouso, encontramos segurança. Deus guarda os justos, e mesmo no silêncio da noite, sua paz nos protege e restaura.
Okozala na kimia, pamba te elikya ezali,
okotala zingazinga na yo mpe okozwa bopemi na yo na kimia,
okolala pongi, mpe okomona moto moko te
kobangisa yo lisusu,
mpe bato ebele bakoya kosenga ngolu na yo.
Bato oyo batambolaka na bosembo
bakokota na kimia,
bakozwa bopemi na bambeto na bango.