Publicidade

Sabedoria

Por Bíblia Online

A sabedoria é um dos temas mais ricos da Bíblia. O temor do Senhor é seu princípio, e buscá-la vale mais que ouro ou prata. Deus promete dar sabedoria generosamente a quem pedir com fé.

O princípio da sabedoria

O temor do Senhor é o início de toda sabedoria verdadeira. Quem reverencia a Deus aprende a viver com discernimento e prudência.

Fungola ya bwanya

Kotosa Yawe ezali mosisa ya mayele ;

bato oyo bazangi mayele batiolaka bwanya mpe toli.

Kotosa Yawe ezali mosisa ya bwanya ;

koyeba Mosantu, yango nde kozala mayele.

Kotosa Yawe ezali eteyelo ya bwanya ;

komikitisa eyaka liboso ya nkembo.

Kotosa Yawe ezali mosisa ya bwanya ;

bato nyonso oyo batosaka Yawe

bazali na mayele ya peto.

Lokumu ya Yawe ezali ya libela na libela.

Kasi bakoki komona bwanya wapi ?

Mayele evandaka wapi ?

Moto ayebaka motuya na yango te,

pamba te bakoki komona yango te

kati na mokili ya bato ya bomoi.

Libulu ya mozindo elobi : « Ezali kati na ngai te »

mpe ebale monene elobi : « Ezali epai na ngai te»

Bakoki kosomba yango te

na motuya ya libanga ya wolo to na bakilo ya palata ;

bakoki te kosomba yango na wolo ya Ofiri

to na mabanga ya talo ya Onikisi to mabanga ya talo ya Safiri ;

wolo to diama ekoki te kokokana na yango,

bakoki kozwa yango te na motuya ya sani ya wolo ya kitoko.

Mayaka ya Karayi mpe ya Jasipe ezali na motuya te

liboso na yango.

Motuya ya bwanya eleki pawuni ya talo.

Topaze ya Kushi ekoki kokokana na yango te,

mpe bakoki te kosomba yango ata na wolo ya peto.

Boye, bwanya ewutaka wapi ?

Mayele evandaka wapi ?

Ebombami mosika na miso ya bato nyonso ya bomoi,

ebombami mpe mosika na miso ya bandeke ya likolo.

Libebi mpe kufa elobi : « Kaka sango na yango

nde ekomaki na matoyi na biso»

Sabedoria como dom de Deus

A verdadeira sabedoria vem do alto. Deus a concede generosamente a quem pede com fé, sem lançar em rosto a fraqueza humana.

Libondeli ya kondima

Soki moko kati na bino azangi bwanya, tika ete asenga yango epai ya Nzambe oyo akopesa ye yango ; pamba te Nzambe apesaka moto nyonso na motema malamu mpe na kopamela te.

Libondeli ya kondima

Soki moko kati na bino azangi bwanya, tika ete asenga yango epai ya Nzambe oyo akopesa ye yango ; pamba te Nzambe apesaka moto nyonso na motema malamu mpe na kopamela te.

Libondeli ya kondima

Soki moko kati na bino azangi bwanya, tika ete asenga yango epai ya Nzambe oyo akopesa ye yango ; pamba te Nzambe apesaka moto nyonso na motema malamu mpe na kopamela te.

Pamba te Yawe nde apesaka bwanya,

mpe maloba ya monoko na Ye epesaka

mayele mpe bososoli.

Pamba te Yawe nde apesaka bwanya,

mpe maloba ya monoko na Ye epesaka

mayele mpe bososoli.

soki obeleli mayele

mpe ogangi epai ya bososoli ;

okososola solo soki kotosa Yawe elakisi nini

mpe okozwa boyebi ya Nzambe.

Oh Nzambe ya batata na ngai,

nazali kosanzola mpe kokumisa Yo

mpo na bwanya mpe nguya oyo opesi ngai,

pamba te oyebisi ngai makambo oyo tosengaki Yo

mpe otalisi biso ndoto ya mokonzi.

Daniele alobaki :

Tika ete Kombo ya Nzambe

ekumisama libela na libela !

Bwanya mpe nguya ezali ya Ye.

Nzambe apesaki bilenge wana minei boyebi mpe bososoli kati na makambo nyonso : koloba, kokoma, kotanga mikanda, mayele mpe bwanya. Mpe Daniele akomaki na makoki ya kolimbola bimoniseli mpe bandoto ya ndenge na ndenge.

A sabedoria do alto

A sabedoria que vem de Deus é pura, pacífica, amável, cheia de misericórdia e de bons frutos. Ela se opõe à sabedoria terrena e mundana.

Kasi bwanya oyo ewutaka epai ya Nzambe ezalaka nanu ya peto ; bongo, ememaka kimia, boboto, boyokani, koyokela bato mawa ; ebotaka bambuma ya malamu, eponaka bilongi te mpe ezalaka na lokuta te.

Kasi bwanya oyo ewutaka epai ya Nzambe ezalaka nanu ya peto ; bongo, ememaka kimia, boboto, boyokani, koyokela bato mawa ; ebotaka bambuma ya malamu, eponaka bilongi te mpe ezalaka na lokuta te.

Kasi bwanya oyo ewutaka epai ya Nzambe ezalaka nanu ya peto ; bongo, ememaka kimia, boboto, boyokani, koyokela bato mawa ; ebotaka bambuma ya malamu, eponaka bilongi te mpe ezalaka na lokuta te.

Bwanya oyo ewutaka epai ya Nzambe

Nani kati na bino azali moto ya bwanya mpe ya mayele ? Tika ete ezaleli malamu na ye emonisa misala na yango kati na komikitisa mpe na bwanya.

Bwanya ya solo na nzela ya Molimo

Nzokande, toteyaka bwanya epai ya Baklisto oyo bakemba na kondima ; mpe bwanya yango ezali ya mokili oyo te to mpe ya bakonzi ya tango oyo te, oyo babongisami mpo na libebi. Te ! Toteyaka nde mabombami ya bwanya ya Nzambe, bwanya oyo ebombama na miso ya bato ya mokili, bwanya oyo Nzambe abongisa mpo na nkembo na biso, liboso ete akela mokili.

biso, tozali koteya Klisto oyo babakaki na ekulusu : ezali penza libaku mpo na Bayuda, mpe liboma mpo na Bapagano. Nzokande, mpo na bato oyo Nzambe abenga, ezala Bayuda to Bagreki, Klisto azali nguya mpe bwanya ya Nzambe. Pamba te liboma ya Nzambe ezali na bwanya koleka bwanya ya bato, mpe bolembu ya Nzambe ezali makasi koleka makasi ya bato.

Bomikosa te : soki moto moko kati na bino akanisi ete azali na bwanya kati na mokili oyo, tika ete akoma lokola zoba mpo ete akoma penza moto ya bwanya.

Bomikosa te : soki moto moko kati na bino akanisi ete azali na bwanya kati na mokili oyo, tika ete akoma lokola zoba mpo ete akoma penza moto ya bwanya.

Nazali kosala bongo mpo ete balendisama, bazala moko kati na bolingo, batonda na elikya oyo ewutaka na bososoli ya mabombami ya Nzambe, mpe batonda na boyebi ya mabombami yango ; mabombami yango ezali Klisto. Ezali kati Klisto nde bomengo nyonso ya bwanya mpe ya boyebi ya Nzambe ebombami.

Direção e discernimento

Deus guia os humildes na justiça e ensina seu caminho aos mansos. Ele promete dirigir nossos passos quando confiamos nele de todo o coração.

Ndimela Yawe na motema na yo mobimba,

mpe kotia motema te na mayele na yo.

Yebaka Ye na banzela na yo nyonso,

mpe Ye akokomisa yango alima.

Tika ete omimonaka te moto ya bwanya

na miso na yo moko ;

tosa Yawe mpe longwa na mabe.

Olobaki : « Nakopesa yo malako

mpe nakolakisa yo nzela ya kolanda ;

nakopesa yo toli mpe nakosenzela yo.

Atambolisaka bato oyo bamikitisa,

kati na banzela ya sembo,

mpe ateyaka bango banzela na Ye.

Yawe, lakisa ngai nzela,

teya ngai nzela oyo olingi ete nalanda.

Kamba ngai kati na bosolo na Yo

mpe pesa ngai mayele,

pamba te ozali Nzambe, Mobikisi na ngai ;

mpe ngai natiaka elikya na ngai

kati na Yo tango nyonso.

Soki Yawe asepeli na etamboli ya moto,

alendisaka bomoi na ye ;

Na tongo makasi, sala ete nayoka boboto na Yo,

pamba te natia elikya na ngai kati na Yo.

Lakisa ngai nzela ya kolanda,

pamba te napesi bomoi na ngai epai na Yo.

Lakisa ngai kosala mokano na Yo,

pamba te ozali Nzambe na ngai.

Tika ete Molimo malamu na Yo atambolisa ngai

na mabele oyo ezanga mabaku !

Yawe, mpo na lokumu ya Kombo na Yo,

bikisa bomoi na ngai !

Na bosembo na Yo, longola bomoi na ngai kati na pasi.

Yawe, lakisa ngai nzela na Yo,

tambolisa ngai na nzela ya alima,

pamba te banguna na ngai bazali koluka ngai.

A Palavra como fonte de sabedoria

A Palavra de Deus é lâmpada para os pés e luz para o caminho. Meditar nas Escrituras nos dá entendimento superior ao dos mestres.

Liloba na Yo ezali mwinda

mpo na makolo na ngai,

mpe pole mpo na nzela na ngai.

Liloba na Yo ezali mwinda

mpo na makolo na ngai,

mpe pole mpo na nzela na ngai.

Fungola miso na ngai

mpo ete namona kitoko ya mibeko na Yo.

Emoniseli ya liloba na Yo engengisaka,

epesaka bazoba mayele.

Mibeko ya Yawe ezali etima ya mapamboli

Esengo na moto oyo alandaka te toli ya bato mabe,

atelemaka te na nzela ya bato ya masumu,

mpe avandaka te esika moko na batioli,

kasi asepelaka na mibeko ya Yawe

mpe akanisaka yango butu mpe moyi.

Tika ete Liloba ya Klisto, kati na bomengo na yango nyonso, evanda kati na bino ; boteyanaka mpe bokebisanaka na bwanya nyonso, na nzela ya banzembo ya masanzoli, banzembo ya lokumu mpe banzembo oyo ewutaka na Molimo. Mpe boyembelaka Nzambe na kozongisa matondi kati na mitema na bino.

Pamba te ekolakisa yo nzela tango okokende na mobembo,

ekobatela yo tango okolala pongi

mpe ekosolola na yo tango okolamuka.

Sabedoria prática para o dia a dia

A sabedoria se aplica em cada decisão: nas finanças, nos relacionamentos, no trabalho e no uso do tempo. Vivamos como sábios, não como insensatos.

Boye, bosalaka penza keba na ndenge na bino ya kobika ; tika ete ezala te lokola bazoba, kasi lokola bato na bwanya. Bosalelaka tango na bino na ndenge ya malamu, pamba te mikolo ezali mabe.

Boye, bosalaka penza keba na ndenge na bino ya kobika ; tika ete ezala te lokola bazoba, kasi lokola bato na bwanya. Bosalelaka tango na bino na ndenge ya malamu, pamba te mikolo ezali mabe.

Yoka toli mpe ndima mateya,

mpo ete okoma moto ya bwanya.

Yoka toli mpe ndima mateya,

mpo ete okoma moto ya bwanya.

Moto oyo alukaka kozwa bwanya alingaka bomoi na ye ;

moto oyo alingaka mayele alongaka.

Soki ozali kosala mabongisi,

tunaka toli ;

mpe soki olingi kobunda bitumba,

zala na ekenge mpe na mayele.

Pamba te kolonga na etumba esengaka bwanya,

mpe lobiko ezalaka kati na motango ebele ya bapesi toli.

Moto oyo asilikaka noki te azalaka mayele,

kasi moto oyo akangaka motema te abimisaka

bozoba na ye.

Lolendo ememaka kaka na koswana,

kasi bato oyo bayokaka toli bazwaka bwanya.

Moto oyo abatelaka monoko na ye

abatelaka molimo na ye,

kasi moto oyo afungolaka monoko na ye makasi

akosuka na libebi.

Nzela ya moto oyo azangi mayele emonanaka alima

na miso na ye,

kasi moto oyo ayokaka toli azali moto ya bwanya.

Tango lolendo eyaka, soni mpe eyaka,

kasi bwanya ezali elongo na bato oyo bamikitisaka.

Motema ya bwanya endimaka mibeko,

kasi moto oyo alobaka makambo ya bozoba

amilukelaka libebi.

Motema ya moto ya mayele ezwaka mayele,

mpe litoyi ya moto ya bwanya elukaka boyebi.

Moto oyo azangi mayele asepelaka te kozwa

tango ya kokanisa,

kasi asepelaka kaka kotalisa makanisi ya motema na ye.

Ezala moto ya liboma, soki avandi kimia,

amonanaka lokola moto ya bwanya ;

moto oyo akangaka monoko na ye

amonanaka lokola moto ya mayele.

Tika ete moto ya bwanya ayoka yango,

mpe akobakisa bwanya na ye,

bongo moto ya mayele akoyeba mayele

ya kotambolisa bato ;

Botambolaka na bwanya liboso ya bato oyo bazali bandimi te mpe bosalelaka tango na bino na ndenge ya malamu. Tika ete maloba na bino etondaka tango nyonso na boboto mpe na elengi, mpo ete boyeba ndenge nini koyanola moto nyonso.

Botambolaka na bwanya liboso ya bato oyo bazali bandimi te mpe bosalelaka tango na bino na ndenge ya malamu. Tika ete maloba na bino etondaka tango nyonso na boboto mpe na elengi, mpo ete boyeba ndenge nini koyanola moto nyonso.

Mosala nyonso oyo bosalaka, bosalaka yango na mitema na bino mobimba, lokola nde bozali kosala yango mpo na Nkolo, kasi mpo na bato te, pamba te boyebi malamu ete bokozwa, lokola lifuti, libula oyo Nkolo abongisa mpo na bato ya Nzambe. Ezali Klisto nde azali Nkolo oyo bosalelaka.

O valor da sabedoria

A sabedoria é mais preciosa que rubis. Quem a encontra, encontra a vida e alcança o favor do Senhor. Nada se compara a ela.

Bwanya : bomengo oyo ezanga talo

Esengo na moto oyo amoni bwanya !

Esengo na moto oyo azwi mayele !

Pamba te moto oyo amoni ngai amoni bomoi

mpe azwi ngolu na miso ya Yawe.

Bwanya ezali malamu koleka wolo,

mpe kozwa mayele ezali na litomba koleka palata.

Motema ya moto esalaka mabongisi,

kasi ezali Yawe nde asalaka ete ekokisama to te.

Motema ya moto esalaka mabongisi,

kasi eyano ewutaka epai na Yawe.

Bwanya ezali lokola nguba,

ndenge mpe mosolo ezalaka nguba ;

kasi litomba ya boyebi ezali ete

ebatelaka bomoi ya bato oyo bazali na yango.

Kolobaka te : « Mpo na nini mikolo eleki ezali malamu koleka mikolo ya lelo »

Pamba te bwanya etindaka te bato kotuna mituna ya boye.

Nzambe apesaka bwanya, mayele mpe esengo na moto oyo asepelisaka Ye ; kasi apesaka mosala ya kosangisa mpe ya konduka bomengo epai ya moto oyo asalaka masumu mpo ete atika yango na maboko ya moto oyo asepelisaka Nzambe.

Wana mpe ezali pamba, ezali lokola moto azali kolanda mopepe.

Mosala nyonso oyo loboko na yo ekokoka kosala, sala yango na makasi na yo nyonso ; pamba te kati na mboka ya bakufi epai wapi okokende, ezala mosala, mabongisi, boyebi to bwanya ezalaka kuna te.

A sabedoria e a soberania de Deus

Os caminhos de Deus são mais altos que os nossos. Sua sabedoria é insondável, eterna e infinitamente superior ao entendimento humano.

« Pamba te ndenge likolo eleki mosika na mabele,

ndenge wana mpe banzela na Ngai ezali

likolo koleka banzela na bino,

mpe makanisi na Ngai ezali likolo

koleka makanisi na bino.

« Makanisi na Ngai ezali makanisi na bino te,

mpe banzela na Ngai ezali banzela na bino te»

elobi Yawe.

Oyebi te ? Nanu oyoka te ?

Yawe azali Nzambe ya libela na libela,

azali Mokeli ya basuka ya mabele ;

alembaka te mpe apemaka te,

mpe moko te akoki kososola mayele na Ye.

Oyebi te ? Nanu oyoka te ?

Yawe azali Nzambe ya libela na libela,

azali Mokeli ya basuka ya mabele ;

alembaka te mpe apemaka te,

mpe moko te akoki kososola mayele na Ye.

Nkolo Yawe apesaki ngai maloba ya bayekoli,

mpo ete nakoka kolendisa na nzela ya liloba

moto oyo alembi ;

alamusaka ngai tongo nyonso,

alamusaka litoyi na ngai

mpo ete nayoka lokola moyekoli.

Mawa na bato oyo batalelaka Ejipito

Mawa na bato oyo bazali kokende

na Ejipito mpo na koluka lisungi,

oyo bazali kotia mitema na bampunda,

oyo bazali kotia elikya na bashar

mpo ete ezali ebele,

mpe na nguya ya basoda oyo batambolisaka yango,

kasi batalelaka Mosantu ya Isalaele te

mpe balukaka lisungi epai na Yawe te !

Nzokande, Ye mpe azali na bwanya

mpe akoki koyeisa pasi ;

abongolaka maloba na Ye te.

Atelemelaka ndako ya bato mabe

mpe bato oyo basungaka bango.

Nyonso wana mpe ewuti epai na Yawe, Mokonzi ya mampinga,

oyo mabongisi na Ye ezali ya kitoko makasi

mpe bwanya na Ye ezali monene.

Molimo na Yawe akowumela na likolo na Ye :

Molimo ya bwanya mpe ya mayele,

Molimo ya toli mpe ya nguya,

Molimo ya boyebi mpe ya kotosa Yawe ;

esengo na ye ekozala na kotosa Yawe.

Akokata makambo ndenge emonanaka na libanda te

to mpe akozwa mikano te kolanda biyoka-yoka ;

Yawe akotambolisa yo tango nyonso,

akokokisa baposa na yo kati na mokili ekawuka

mpe akokembisa mikuwa na yo.

Okozala lokola elanga oyo basopeli mayi,

lokola liziba oyo mayi na yango ekawukaka te.

Lokumu epai ya Nzambe

Oh, tala ndenge nini bomengo, bwanya mpe boyebi ya Nzambe

ezali na mozindo mingi !

Moto moko te akoki koyeba makanisi na Ye

mpe kososola nzela na Ye !

na Nzambe moko kaka ya bwanya, tika ete nkembo epesamela libela na libela na nzela ya Yesu-Klisto ! Amen !

Mpe toyebi malamu ete kati na makambo nyonso, Nzambe asalaka mpo na bolamu ya bato oyo balingaka Ye, ba-oyo babengama kolanda mabongisi na Ye.

Oh Yawe, misala na Yo ezali ebele !

Osalaki nyonso na bwanya ;

mokili etondi na biloko oyo okela.

Nkolo na biso azali monene mpe atonda na nguya ;

mayele na Ye ezali na mondelo te.

Otambolisaka ngai na nzela ya toli na Yo,

mpe, na sima, okoyamba ngai kati na nkembo.

Lakisa biso kotanga malamu

mikolo ya bomoi na biso

mpo ete tokoma na mitema ya bwanya.

Monoko ya moto ya sembo ebimisaka bwanya,

mpe lolemo na ye elobaka kolanda bosembo.

Komisa Yawe bilengi na yo ya makasi,

mpe akokokisela yo posa ya motema na yo.

Kasi mpo ete bolingo na Yo eleki monene,

nakoki kokota kati na Ndako na Yo,

nakoki kofukama mpo na botosi

epai ya Tempelo na Yo ya bule.

Okolakisa ngai nzela ya bomoi ;

okotondisa ngai na esengo kati na bozalisami na Yo,

elongo na bilengi ya suka te na ngambo ya loboko na Yo ya mobali.

Bakendeki na kolela,

kasi nakozongisa bango,

wana bakozala kati na kobondela ;

nakokamba bango na bisika oyo mayi etiolaka,

na nzela esembolama mpo ete babeta mabaku te ;

pamba te nazali Tata ya Isalaele,

mpe Efrayimi azali mwana na Ngai ya liboso.

Libondeli ya Jeremi

Oh Yawe, nayebi ete moto moko te

azali mokonzi ya bomoi na ye ;

moto oyo azali kotambola

azali na bokonzi te ya kokamba matambe na ye.

Kasi Yawe asala mabele na nguya na Ye,

alendisa mokili na bwanya na Ye

mpe atanda likolo na mayele na Ye.

Komikumisa te mpo na mokolo ya lobi,

pamba te oyebi te likambo nini mokolo ekoki kobota.

Bato mabe basosolaka te makambo ya bosembo,

kasi bato oyo balukaka Yawe basosolaka yango nyonso.

Epai na Ye oyo azali na makoki ya kosala koleka nyonso oyo tokoki kosenga to kokanisa, kolanda nguya na Ye, oyo esalaka kati na biso, tika ete nkembo ezala ya Ye kati na Lingomba mpe kati na Yesu-Klisto, mpo na bileko nyonso mpe mpo na libela na libela ! Amen.

Makebisi ya suka mpe bambote

Ekozala mbala na ngai ya misato ya koya epai na bino. Bosolo ya likambo nyonso endimamaka na litatoli ya bato mibale to misato.

Mpe bobosani maloba nyonso ya malendisi oyo ayebisaki bino ndenge tata ayebisaka bana :

« Mwana na Ngai, kozwa na pamba te etumbu ya Nkolo,

mpe kobungisa mpiko na yo te soki apameli yo.

Pamba te Nkolo apamelaka moto oyo Ye alingaka,

apesaka etumbu na moto nyonso

oyo Ye ayebaka lokola mwana na Ye»

Bandeko, mpo na kosukisa, tika ete makambo nyonso oyo ezali ya solo, kitoko, sembo, peto, makambo oyo bato bakoki kolinga, kosepela na yango, kolula mpe kokumisa ezala tina ya makanisi na bino.

Yango wana, bomitungisaka te mpo na mokolo ya lobi oyo ezali koya, pamba te mokolo yango ya lobi ekomitungisa na tina na yango moko : mokolo na mokolo ezali na pasi oyo ekoki na yango.

Na mokolo ya kosambisama, mwasi mokonzi ya sude akotelema elongo na bato ya ekeke oyo mpe akokatela bango etumbu, pamba te awutaki mosika, na suka ya mokili, mpe ayaki mpo na koyoka maloba ya bwanya ya Salomo ; nzokande, ezali awa na Moto oyo aleki Salomo.

Lisese ya batongi mibale ya ndako

Yango wana, moto nyonso oyo ayoki makambo oyo nawuti koloba mpe atie yango na misala akokani na moto ya mayele oyo atongaki ndako na ye na likolo ya libanga.

Pamba te, Ngai moko, nakopesa bino maloba oyo bosengeli koloba mpe bwanya oyo ekosala ete banguna na bino nyonso bandima nyonso oyo bokoloba.

Bosambisaka lisusu te kolanda oyo miso na bino ezali komona, kasi bokataka makambo na bosembo.

Na nzela ya bwanya, Yawe atiaki miboko ya mabele ;

na nzela ya mayele, alendisaki likolo.

Bwanya ezalaka kati na bampaka te ?

Bomoi ya molayi epesaka mayele te ?

Bwanya mpe makasi ezali epai ya Nzambe,

toli mpe mayele ezali ya Ye.

Eyano ya Yobo epai ya Bilidadi

Yobo azongisaki :

« Ezali ya solo, ezali penza ndenge osili koloba,

mpe nayebi yango malamu !

Kasi ndenge nini moto oyo asalema na putulu

akoki kozala sembo liboso ya Nzambe ?

Ata, na mbala nkoto moko,

ameki kobeta tembe na Nzambe,

akotikala kokoka kolonga ata mbala moko te.

Bwanya ya Nzambe ezali na bozindo makasi,

mpe nguya na Ye ezali monene ;

nani asila kotelemela Ye, bongo amona bolamu ?

Oh moto, bateyaki yo makambo oyo ezali malamu.

Mpe tala makambo oyo Yawe azali kosenga epai na yo :

Tambola na bosembo,

linga boboto mpe tambola

elongo na Nzambe na yo na komikitisa.

Alobaki na bango : « Bozala na bokebi na mosala oyo bokosala, pamba te bokosambisa te mpo na bato, kasi mpo na Yawe oyo azali elongo na bino na bisika nyonso oyo bokokata makambo.

Boni, boyebi makambo oyo ekoya lobi ? Bomoi na bino nde nini ? Ezali kaka te lokola londende oyo emonanaka mpo na mwa tango moke mpe, na sima, elimwe ?

Seja o primeiro
Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-07-05_12-11-46-