Publicidade

Trabalho

Por Bíblia Online

O trabalho é uma ordenança divina desde a criação. Deus colocou o homem no jardim para cultivar e guardar, revelando que o labor é parte do propósito humano e um meio de glorificá-lo.

Trabalho como vocação divina

Deus nos criou para trabalhar com propósito. O trabalho é expressão da imagem divina em nós e deve ser feito como para o Senhor.

Mosala nyonso oyo bosalaka, bosalaka yango na mitema na bino mobimba, lokola nde bozali kosala yango mpo na Nkolo, kasi mpo na bato te,

Mosala nyonso oyo bosalaka, bosalaka yango na mitema na bino mobimba, lokola nde bozali kosala yango mpo na Nkolo, kasi mpo na bato te, pamba te boyebi malamu ete bokozwa, lokola lifuti, libula oyo Nkolo abongisa mpo na bato ya Nzambe. Ezali Klisto nde azali Nkolo oyo bosalelaka.

Mpe nyonso oyo bokosala, ezala na maloba to na misala, bosalaka yango na Kombo ya Nkolo Yesu, na kozongisa matondi epai ya Nzambe Tata na nzela ya Yesu-Klisto.

Bosalaka na esengo lokola bawumbu ya Nkolo, kasi lokola bawumbu ya bato te, pamba te boyebi malamu ete Nkolo akofuta moto nyonso mpo na bolamu nyonso oyo asalaka, azala mowumbu to monsomi.

Boye, ezala kolia to komela, nyonso oyo bokoki kozala kosala, bosalaka nyonso mpo na lokumu ya Nzambe.

Yango wana, bandeko balingami, botelema ngwi mpe bomitika te ete baningisa bino. Bokendaka tango nyonso liboso kati na mosala ya Nkolo, wana boyebi malamu ete mosala na bino kati na Nkolo ezali ya pamba te.

Bosalaka makambo nyonso na bolingo.

Diligência e recompensa

A mão diligente enriquece, mas a preguiça traz pobreza. A Bíblia valoriza o esforço honesto, dedicado e perseverante em toda obra.

Maboko ya goyigoyi ekomisaka moto mobola,

kasi maboko oyo esalaka ekomisaka moto mozwi.

Maboko oyo esalaka ezwaka bokonzi,

kasi maboko ya goyigoyi ememaka na bowumbu.

Maboko oyo esalaka ezwaka bokonzi,

kasi maboko ya goyigoyi ememaka na bowumbu.

Mosala nyonso epesaka litomba,

kasi maloba ya pamba ememaka na bobola.

Moto ya goyigoyi

Yo moto ya goyigoyi, kende epai ya furmi,

tala malamu ezaleli na yango mpe okozwa bwanya !

Yango ezalaka na mokambi te,

mokengeli te to mokonzi te ;

ebongisaka bilei na yango na tango ya moyi makasi,

ebombaka yango na tango ya kobuka mbuma.

Yo moto ya goyigoyi, okolala pongi kino tango nini ?

Kino tango nini okolamuka na pongi na yo ?

Mwa pongi moke, mwa kopema moke,

mwa kokanga maboko moke mpo na kolala

mpe bobola ekoyela yo na pwasa lokola moleki nzela,

mpe pasi ekoyela yo lokola moyibi.

Moto oyo azongaka sima na mosala na ye

azali ndeko ya mobebisi.

Kolingaka pongi te, noki te okokoma mobola ;

sala ete miso na yo ezalaka ya kofungwama,

mpe okozanga te bilei ya kobomba.

Bomengo oyo ezwami na lombangu

mpe na nzela ya mabe esilaka noki,

kasi bomengo oyo babakisaka na moke-moke

ekomaka ebele.

Lipamboli ya Yawe ekomisaka moto mozwi,

mpe abakisaka pasi te na likolo na yango.

Planejamento e excelência

A excelência no trabalho honra a Deus. Devemos nos dedicar com competência, entregar nossos planos ao Senhor e buscar o melhor em cada tarefa.

Pesa misala na yo epai na Yawe,

mpe mabongisi na yo ekokokisama.

Pesa misala na yo epai na Yawe,

mpe mabongisi na yo ekokokisama.

Osila komona moto oyo ayebi mosala na ye malamu ?

Akosala kaka liboso ya bakonzi,

akosala te liboso ya bato ya molili.

Sala makasi ete omimonisa liboso ya Nzambe lokola moto ya kokoka, lokola mosali oyo ayokelaka mosala na ye soni te, pamba te ateyaka na bosembo Liloba ya solo.

Sala makasi ete omimonisa liboso ya Nzambe lokola moto ya kokoka, lokola mosali oyo ayokelaka mosala na ye soni te, pamba te ateyaka na bosembo Liloba ya solo.

Makomi nyonso ekomama na nguya ya Nzambe mpe ezali na tina mpo na koteya, kopamela, kozongisa na nzela mpe kolakisa bato kotambola kolanda bosembo, mpo ete moto na Nzambe azala ya kokoka mpe ya kobongisama mpo na kosala misala nyonso ya malamu.

Mosala nyonso oyo loboko na yo ekokoka kosala, sala yango na makasi na yo nyonso ; pamba te kati na mboka ya bakufi epai wapi okokende, ezala mosala, mabongisi, boyebi to bwanya ezalaka kuna te.

Bosalaka likambo moko te na koyimayima mpe na tembe, mpo ete bozanga pamela mpe bozala peto lokola bana na Nzambe oyo bazangi mbeba kati na molongo ya bato babunga nzela mpe ya mobulu. Kati na molongo yango, bozali kongenga lokola minda kati na mokili

O contentamento no trabalho

Deus nos dá a capacidade de desfrutar do nosso trabalho. Poder comer, beber e encontrar satisfação em nosso labor é um dom divino.

Nayebi ete ezali na eloko moko oyo eleki malamu mpo na bato : ezali kaka kosepela mpe kozala malamu tango bazali na bomoi. Yango wana, tika ete moto na moto alia, amela mpe amona bolamu kati na mosala na ye nyonso, pamba te ezali likabo ya Nzambe.

Kutu, epai na moto nyonso oyo Nzambe apesi bomengo mpe biloko ebele, bongo apesi ye lisusu makoki ya kosalela yango, ya kozwa libula na ye mpe ya kosepela na mbuma ya mosala na ye, wana ezali penza likabo ya Nzambe !

Nzokande, wana Nzambe akotondisa motema na ye na esengo, moto yango akosala keba te na motango ya mikolo ya bomoi na ye.

Bato mibale bazali malamu koleka moto moko,

pamba te bakozwa lifuti ya malonga na mosala na bango.

Ezalaki na moto moko oyo azalaki kaka ye moko,

azalaki ata na mwana to ndeko te ;

azalaki kopema te na mosala na ye ya makasi,

kasi bomengo na ye etikalaki te kotondisa miso na ye.

Mpe atikalaki komituna te :

« Nani oyo ngai nazali komonela pasi boye ?

Mpe mpo na nini nazali komipimela bomengo »

Wana mpe lisusu ezali pamba :

ezali mosala ya mpunda !

Mosala mpe makama na yango

Namoni ete pasi nyonso oyo bato bamonaka na mosala mpe lokumu oyo bazwaka na misala na bango, ewutaka kaka na bilulela ya moto liboso ya moninga na ye. Wana mpe ezali pamba, ezali lokola moto azali kolanda mopepe.

A responsabilidade cristã

O cristão deve trabalhar com suas próprias mãos, viver dignamente e ser exemplo de dedicação. Quem não trabalha, não coma.

Pamba te, ezala tango tozalaki elongo na bino, topesaki bino mobeko oyo : « Tika ete moto oyo aboyi kosala mosala alia mpe te »

Tozali koyoka ete mingi kati na bino bazali bagoyigoyi mpe bazali kotambola na bomoi ya mobulu, bazali kosala eloko moko te, kasi bazali kaka kokota na makambo ya bato mosusu. Tozali kokomela bato ya lolenge wana malako mpe kosenga na bango, na Kombo ya Nkolo Yesu-Klisto, ete basala mosala na kimia mpe balia bilei oyo bakozwa na motoki na bango moko.

ete bolukaka kobika bomoi na bino kati na kimia ; mpe tika ete moto nyonso atalaka makambo na ye moko mpe aliaka na motoki na ye moko, ndenge kaka toyebisaki bino yango, mpo ete, mokolo na mokolo, Bapagano bamemia bino, mpe mpo ete bobika te bomoi na bino na sima ya mokongo ya moto.

Tika ete moyibi ayiba lisusu te, kasi amipesa nde na mosala ; mpe tika ete maboko na ye esala na bosembo nyonso mpo ete azwa eloko ya kosunga na yango moto oyo azali kati na bosenga.

Nzambe azali mpe na makoki ya kotondisa bino na mapamboli ya ndenge na ndenge mpo ete, na tango nyonso mpe kati na makambo nyonso, bozala na nyonso oyo bozali na yango na bosenga mpe botonda lisusu na oyo bokosala na yango misala ya malamu ya lolenge nyonso,

Boye, mpo na bato ya Nzambe, etikali na bopemi moko oyo ezali lokola mokolo ya sambo oyo Nzambe apemaki. Pamba te moto oyo akoti kati na bopemi ya Nzambe apemi na misala na ye, ndenge kaka Nzambe apemaki na misala na Ye.

Tika ete boboto ya Nkolo, Nzambe na biso,

ezala elongo na biso !

Mpo na biso, sala ete misala na biso ekende liboso !

Iyo, sala ete misala na biso ekende kaka liboso !

Botala ndeke ya likolo : elonaka nkona te, ebukaka bambuma te, ebombaka bilei te kati na bibombelo ; kasi Tata na bino ya Likolo aleisaka yango. Boni, bozali na motuya te koleka yango ?

Kotatola elikya

Nani akosala bino mabe soki bomipesi na kosala bolamu ?

Nazali koloba na bino penza ya solo : moto oyo andimi Ngai akosala misala oyo nazali kosala ; akosala kutu misala oyo eleki minene, pamba te nazali kokende epai ya Tata.

Nzokande, nazali komona bomoi na ngai lokola eloko pamba ; eloko oyo eleki motuya mpo na ngai ezali : kosukisa malamu momekano na ngai ya kopota mbangu mpe kokokisa lotomo oyo Nkolo Yesu apesaki ngai : kosakola Sango Malamu ya ngolu ya Nzambe.

Boye, bosala keba mpo ete bobungisa te mbuma ya mosala na biso, kasi mpo ete bozwa lifuti ya kokoka.

Seja o primeiro
Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-07-05_19-25-13-