Publicidade

Jeremias 9

Libota ya bakosi

1 Ah ! Soki nazalaki ata na ndako ya bapaya kati na esobe,

nalingaki ata kokima bato na ngai

mpe kozala mosika na bango,

pamba te bango nyonso bazali bandumba,

bazali lisanga ya bakosi !

2 « Babongisaka lolemo na bango

lokola tolotolo mpo na kokosa ;

balongaka kati na mokili na nzela ya solo te,

pamba te basalaka se mabe likolo ya mabe

mpe batosaka Ngai te, »

elobi Yawe.

3 « Tika ete moto na moto asala keba na moninga na ye

mpe atia motema te na ndeko na ye,

pamba te ndeko nyonso azali moto ya lokuta,

mpe moninga nyonso azali moto ya matongi.

4 Moninga azali kokosa moninga na ye,

mpe moto moko te azali koloba solo.

Bamibongisaka mpo na koloba lokuta,

babimisaka motoki na bango mpo na kosala masumu.

5 Mosala na bango se kokosa na kokosa ;

mpe na lokuta na bango, baboyaka kotosa Ngai, »

elobi Yawe.

6 Yango wana, tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi :

« Tala, nakopetola mpe nakomeka bango na moto,

pamba te nasala lisusu nini

mpo na masumu ya bato na Ngai ?

7 Lolemo na bango ezali lokola likonga oyo ebomaka,

ebimisaka kaka maloba ya lokuta.

Moto na moto alobaka na moninga na ye

na esengo na monoko ;

kasi na se ya motema, atielaka ye motambo.

8 Bongo na makambo ya boye,

napesa bango etumbu te, »

elobi Yawe ?

« Nazongisa mabe na mabe te na ekolo ya boye ? »

9 Nakosala matanga mpe nakolela

mpo na bangomba mpe matiti ya esobe.

Nyonso esili kokawuka

mpe moto moko te azali lisusu kolekela wana ;

ezala makelele ya bibwele to ya bandeke

ezali lisusu koyokana te ;

bandeke ya likolo ekimi

mpe banyama ya zamba esili kokende.

10 « Nakokomisa Yelusalemi

liboke ya mabanga oyo ebukana-bukana,

ndako ya mbwa ya zamba ;

nakobebisa bingumba ya Yuda,

bongo moto moko te akovanda lisusu kuna.

11 Nani azali penza na bwanya

mpo na kososola makambo ya boye ?

Nani Yawe ateyaki mpo ete alimbola yango ?

Mpo na nini mokili ebebisami,

etikali pamba lokola esobe

epai wapi moto alekaka te ? »

12 Yawe alobi : « Makambo oyo nyonso ekomeli bango mpo ete basundoli Mobeko na Ngai oyo natiaki liboso na bango, batosi Ngai te mpe basaleli malako na Ngai te. 13 Nzokande, batiaki kaka mito makasi mpe bakobaki kolanda banzambe ya Bala oyo batata na bango balakisaki bango. »

14 Yango wana, tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : « Tala, nakoleisa bato oyo matiti ya bololo mpe nakomelisa bango mayi ya ngenge. 15 Nakopanza bango kati na bikolo oyo, ezala bango to bakoko na bango, batikalaki koyeba te ; nakolanda bango na mopanga kino nakosilisa koboma bango. »

16 Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi :

« Botala malamu makambo oyo !

Bobengisa basi oyo balelaka bibembe,

bobengisa penza ba-oyo bayebi kolela malamu !

17 Tika ete baya noki mpo ete bayembela biso

banzembo ya mawa kino tango mpinzoli ekobima biso

mpe ekotondisa miso na biso.

18 Kolela ya mawa ezali koyokana wuta na Siona :

‹ Ah ! Tala ndenge nini tosili kobebisama !

Tala ndenge nini tosambwe !

Tika ete tokima mokili na biso,

pamba te bandako na biso ebebisami. › »

19 Eh basi, boyoka Liloba na Yawe !

Bofungola matoyi mpo na koyoka maloba ya monoko na Ye.

Bolakisa bana na bino ya basi banzembo ya mawa

mpe tika ete moko na moko

ayekolisa moninga na ye nzembo ya mawa.

20 Kufa emati mpe ekoti

na nzela ya maninisa na biso,

ekoti kino na bandako na biso,

oyo batonga makasi ;

eyei kosilisa koboma bana na babalabala,

mpe bilenge mibali na bisika oyo bato ebele bokutanaka.

21 Loba : « Tala liloba oyo Yawe alobi :

‹ Bibembe ya bato ekolala na mabele

mpe ekotikala wana lokola fimie ya bilanga,

lokola liboke ya bambuma oyo mobuki bambuma atiki

na sima na ye

mpe moto oyo akolokota yango azali te. › »

Bwanya ya solo

22 Tala liloba oyo Yawe alobi :

« Tika ete moto ya bwanya amikumisa te

mpo na bwanya na ye

to moto ya makasi mpo na makasi na ye

to moto ya bozwi mpo na bozwi na ye.

23 Kasi tika ete moto oyo alingi komikumisa amikumisa

mpo ete azali na bososoli mpe ayebi Ngai,

mpo ete ayebi ete nazali Yawe oyo atalisaka bolamu,

bosembo mpe boyengebene na mokili ;

pamba te nasepelaka nde na makambo wana, »

elobi Yawe.

24 « Na mikolo ekoya, » elobi Yawe, « nakopesa etumbu na bato nyonso oyo bakatama ngenga kaka na nzoto, kasi na mitema te : 25 bato ya Ejipito, ya Yuda, ya Edomi, ya Amoni, ya Moabi mpe bavandi nyonso ya esobe oyo bamikataka mandefu ; pamba te bato ya bikolo oyo nyonso bakatama ngenga te. Mpe ezala bana nyonso ya Isalaele oyo bakatama ngenga, bakatama yango kaka na bonzoto, kasi na mitema te. »

Veja também

Publicidade
Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-06-22_10-02-25-