Publicidade

Jeremias 20

Jeremi na boloko

1 Nganga-Nzambe Pashuri, mwana mobali ya Imeri, mokonzi ya Tempelo ya Yawe, ayokaki ndenge Jeremi azalaki kosakola. 2 Nganga-Nzambe Pashuri abetisaki Mosakoli Jeremi fimbu mpe akangisaki ye na likonzi oyo ezalaki na ekuke ya likolo ya Benjame, ekuke oyo ememaka na Tempelo ya Yawe. 3 Mokolo oyo elandaki, tango Pashuri alongolaki ye na likonzi, Jeremi alobaki na ye :

— Yawe akobenga yo lisusu Pashuri te, kasi Magori-Misabibe. 4 Pamba te, tala liloba oyo Yawe alobi : « Nakotindela yo mpe balingami na yo nyonso makambo ya somo ; okomona na miso na yo ndenge nini bakokweya na mopanga liboso ya banguna na bango. Nakokaba Yuda nyonso na maboko ya mokonzi ya Babiloni oyo akomema bango na bowumbu, na Babiloni, to akoboma bango na mopanga. 5 Nakokaba bozwi nyonso ya engumba oyo na maboko ya banguna na bango : biloko nyonso ya engumba, biloko ya talo mpe bomengo nyonso ya mokonzi ya Yuda ; bakokamata yango mpe bakomema yango na mokili ya Babiloni. 6 Mpo na yo Pashuri mpe bavandi nyonso ya ndako na yo, bokokende na bowumbu na mokili ya Babiloni. Bokokufa mpe bakokunda bino kuna, ezala yo to balingami na yo nyonso oyo bosakolaki makambo ya lokuta epai na bango. »

Kolela ya Jeremi

7 Eh Yawe, okosaki-kosaki ngai,

mpe nakosamaki penza ;

olekaki ngai na makasi mpe olongaki ngai.

Bazali kotiola ngai mikolo nyonso,

bato nyonso bazali kaka koseka ngai.

8 Na tango nyonso oyo nalobaka,

nagangaka makasi mpo na kosakola

kaka mobulu mpe kobebisama.

Mokolo na mokolo,

Liloba na Yawe ememelaka ngai

kofingama mpe pamela ya mabe.

9 Kasi soki nalobi : « Nakotanga lisusu Kombo na Ye te, »

Liloba na Ye kati na motema na ngai

ekomaka lokola moto oyo ezali kopela

kino na mikuwa na ngai ;

nalongaka te kokanga yango,

nakokaka te !

10 Nazali koyoka bato ebele koloba na se se se :

« Botala ! Somo na bangambo nyonso !

Bofunda ye ! Tofunda ye ! »

Baninga na ngai nyonso bazali kozela kokweya na ngai,

bazali koloba : « Tango mosusu akokosama,

tokokanga ye kaka mpe tokozongisela ye mabe ! »

11 Kasi Yawe azali elongo na ngai

lokola Elombe ya bitumba ;

boye, banyokoli na ngai bakokweya

mpe mikano na bango ekokokisama te ;

bakotikala na soni mpe bakolonga te,

bakobosana ata mokolo moko te soni na bango.

12 Eh Yawe, Mokonzi ya mampinga,

Yo oyo omonaka mitema ya bayengebene

mpe oyebaka malamu makanisi ya mitema ya bato,

tika ete namona Yo kozongisela bango mabe,

pamba te napesi likambo na ngai na maboko na Yo !

13 Boyembela Yawe ! Bokumisa Yawe !

Pamba te abikisaka bomoi ya mobola

na maboko ya bato mabe.

14 Tika ete mokolo ya mbotama na ngai elakelama mabe !

Tika ete mokolo oyo mama na ngai abotaki ngai

epambolama te !

15 Tika ete alakelama mabe,

moto oyo amemelaki tata na ngai sango

oyo esepelisaki motema na ye :

« Baboteli yo mwana, mwana mobali ! »

16 Tika ete moto yango akoma lokola bingumba

oyo Yawe abuki na mawa te !

Tika ete ayoka bileli na tongo

mpe makelele ya bitumba na midi.

17 Mpo na nini Nzambe abomaki ngai te

kati na libumu ya mama na ngai,

oyo alingaki kozala kunda na ngai,

mpe libumu na ye elingaki kobomba ngai libela na libela ?

18 Mpo na nini penza nabimaki

na libumu ya mama na ngai ?

Ezali kaka mpo na komona pasi mpe mikakatano,

mpe kosukisa bomoi na ngai na soni ?

Veja também

Publicidade
Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-06-18_14-04-22-