Pular para o conteúdo
Publicidade

1 Bakolinto 12

7 Nzokande, Molimo amimonisaka epai na moko na moko mpo na bolamu ya bato nyonso. 8 Epai na moko, Molimo apesi liloba ya bwanya ; epai na mosusu, liloba ya boyebi ; 9 epai na mosusu kondima ; epai na mosusu, likabo ya kobikisa babeli ; 10 epai na mosusu, nguya ya kosala bikamwa ; epai na mosusu, likabo ya kosakola ; epai na mosusu, likabo ya kososola milimo ; epai na mosusu, likabo ya koloba nkota ya ndenge na ndenge ; epai na mosusu, likabo ya kolimbola nkota. 11 Ezali Molimo kaka moko nde asalaka misala wana nyonso mpe akabolaka yango epai na moko na moko, ndenge Ye moko alingi.

Estes versículos te tocaram? Ore agora!

+581 estão orando agora.

Junte-se à corrente de oração.

Veja também