Pular para o conteúdo
Publicidade

1 Coríntios 7

8 Na yango, nazali koloba na bato oyo babali nanu te mpe na basi oyo bakufisa mibali, ete ezali malamu mpo na bango kokoba kozala ya kobala te lokola ngai. 9 Kasi soki bakoki te komikanga, tika ete babala ; pamba te eleki malamu kobala, na esika ya kozika na posa ya nzoto.

10 Epai ya bato oyo babala, nazali kopesa mitindo, ngai te kasi Nkolo : Mwasi asengeli te kokabwana na mobali na ye ; 11 kasi soki akabwani na mobali na ye, asengeli kobala lisusu te to asengeli koyokana na mobali na ye ; mpe mobali asengeli te kobengana mwasi na ye na libala.

Veja também