Pular para o conteúdo
Publicidade

1 Pedro 1

Kozala na bolingo

22 Lokola bosili komipetola na nzela ya kotosa bosolo mpo na kolingana na bolingo ya solo, bolinganaka makasi bino na bino, na motema ya peto. 23 Pamba te bobotamaki mbotama ya sika na nzela ya Liloba na Nzambe, oyo ezali nkona oyo epesaka bomoi mpe ewumelaka seko na seko ; kasi na nzela te ya nkona ya bato oyo bakufaka. 24 Pamba te ekomama :

« Bato nyonso bazalaka lokola matiti,

mpe nkembo na bango nyonso ezalaka

lokola bafololo ya bilanga.

Matiti ekawukaka mpe fololo na yango ekweyaka,

25 kasi Liloba na Nkolo ewumelaka seko na seko»

Nzokande, Liloba yango ezali nde Sango Malamu oyo bateyaki bino.

Veja também