13 Eliya alobaki na ye :
— Kobanga te, zonga na ndako mpe sala ndenge olobi. Kasi salela ngai nanu lipa na oyo ozali na yango mpe memela ngai yango ; bongo na sima, okosala mpo na yo mpe mpo na mwana na yo ya mobali. 14 Pamba te, tala maloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : « Farine ekozanga te na sani, mpe mafuta ekosila te na mbeki. »