Pular para o conteúdo
Publicidade

1 Reis 19

20 Elize atikaki bangombe na ye, akimaki mbangu sima na Eliya mpe alobaki :

Tika ete nakende nanu kopesa tata mpe mama na ngai beze mpo na kokabwana na bango, bongo nakolanda yo.

Eliya azongisaki :

Zonga na yo, nasali yo nini ?

21 Boye Elize atikaki ye mpe azongaki. Azwaki bangombe na ye mibale oyo bakangisa, akataki yango kingo mpe abonzaki yango lokola mbeka. Asalelaki bikangiseli ya bangombe mpo na kolamba mosuni na yango, akabolaki yango epai ya bato na ye mpe baliaki yango. Boye, atelemaki mpo na kolanda Eliya mpe akomaki kosalela ye.

Veja também