Pular para o conteúdo
Publicidade

1 Samuele 1

22 Kasi lokola Ana akendeki te, alobaki na mobali na ye :

Soki nakati mwana komela mabele nde nakomema ye mpo na kotalisa ye epai na Yawe ; bongo akovanda kuna mpo na libela.

23 Elikana, mobali na ye, alobaki :

Oyo omoni ete ezali malamu, sala yango. Vanda awa kino okokata mwana komela mabele. Tika ete Yawe asunga yo mpo ete okokisa kaka elaka na yo.

Boye Ana atikalaki na ndako, akobaki komelisa mwana mabele kino tango akataki ye komela.

24 Sima na ye kokata mwana komela mabele, Ana akamataki ye, ndenge kaka azalaki nanu moke bongo ; amemaki ye na Ndako ya Yawe, na Silo, elongo na ngombe ya mobali ya mibu misato, bakilo zomi ya farine, mpe mbeki moko ya vino.

Veja também