Boyokani ya Davidi elongo na Jonatan
1 Tango kaka Davidi asilisaki kosolola na Saulo, Jonatan akangamaki na Davidi mpe alingaki ye lokola ye moko. 2 Kobanda mokolo wana, Saulo avandisaki Davidi kati na ndako na ye mpe atikaki ye te kozonga na ndako ya tata na ye. 3 Jonatan asalaki boyokani elongo na Davidi, pamba te alingaki ye lokola ye moko.