Pular para o conteúdo
Publicidade

1 Samuele 19

11 Saulo atindaki mibali kozonga na ndako ya Davidi mpo na kokengela ye mpe koboma ye na tongo. Kasi mwasi na ye, Mikali, ayebisaki ye : « Soki okimi te na pokwa ya lelo mpo na kobatela bomoi na yo, bakoboma yo lobi »

12 Boye Mikali akitisaki Davidi na nzela ya lininisa, mpe Davidi akimaki mpe abikaki. 13 Bongo Mikali azwaki nzambe ya ekeko oyo ezalaki na lolenge ya moto ; alalisaki yango na mbeto, afinikaki yango elamba mpe atiaki yango bapwale ya bantaba na moto. 14 Tango Saulo atindaki bato kokanga Davidi, Mikali alobaki : « Azali kobela»

15 Saulo azongisaki bato mpo ete batala Davidi mpe alobaki na bango : « Bomemela ngai ye na mbeto na ye mpo ete naboma ye» 16 Kasi tango mibali bakotaki, bamonaki, na likolo ya mbeto, nzambe ya ekeko oyo ezalaki lokola moto mpe ezalaki na bapwale ya bantaba na moto na yango. 17 Saulo alobaki na Mikali :

Mpo na nini oyokisi ngai soni mpe okimisi monguna na ngai, mpe sik’oyo abiki ?

Mikali alobaki na Saulo :

Davidi alobaki na ngai : « Tika ngai nakima, noki te nakoboma yo»

18 Tango Davidi akimaki mpe amibikisaki, akendeki epai ya Samuele, na Rama, mpe ayebisaki ye makambo nyonso oyo Saulo asalaki ye. Bongo ye mpe Samuele bakendeki kovanda na Nayoti, pene ya Rama.

Estes versículos te tocaram? Ore agora!

+581 estão orando agora.

Junte-se à corrente de oração.

Veja também