Sanduku ezongi na Isalaele
1 Sima na Sanduku ya Yawe kosala sanza sambo kati na mokili ya bato ya Filisitia, 2 bato ya Filisitia babengisaki Banganga-Nzambe mpe bato ya soloka, balobaki na bango :
— Tosengeli kosala nini na Sanduku ya Yawe ? Boyebisa biso ndenge nini tokoki kozongisa yango na esika na yango.
3 Bazongisaki :
— Soki bolingi kozongisa Sanduku ya Nzambe ya Isalaele, bozongisa yango ya pamba te, kasi bozongisa yango elongo na bambeka mpo na masumu ; bongo bokobika na bokono, mpe bokoyeba mpo na nini loboko na Yawe etikaki te konyokola bino.