Publicidade

Atos 2

17 « Na mikolo ya suka, elobaki Nzambe,

nakosopa Molimo na Ngai kati na bato nyonso.

Bana na bino ya mibali mpe ya basi bakosakola ;

bilenge na bino bakozwa bimoniseli,

mibange na bino bakolota bandoto.

18 Solo, na mikolo wana, nakosopa Molimo na Ngai

kati na basali na Ngai ya mibali mpe ya basi,

mpe bakosakola.

19 Nakolakisa bikamwa kuna na Likolo,

mpe bilembo ya kokamwa awa na mokili :

makila, moto mpe likonzi ya milinga.

20 Moyi ekobongwana molili,

sanza ekobongwana makila

liboso ete mokolo ya Nkolo ekoma,

mokolo oyo ya monene mpe ya nkembo.

21 Boye, moto nyonso oyo akobelela

Kombo ya Nkolo akobikisama»

Veja também

Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-07-05_19-25-13-