44 Bakoko na biso bazalaki na Ndako ya kapo ya Boyokani kati na esobe, batongaki yango ndenge Nzambe atindaki Moyize, kolanda ndakisa oyo amonaki. 45 Sima na kozwa Ndako ya kapo yango, bakoko na biso na bokambami ya Jozue, bamemaki yango tango babotolaki mikili ya Bapagano, mikili oyo Nzambe abenganaki liboso na bango. Mpe Ndako ya kapo yango etikalaki kuna kino na tango ya Davidi ; 46 oyo azwaki ngolu na miso ya Nzambe mpe asengaki ete atongela Nzambe ya Jakobi ndako. 47 Kasi Salomo nde moto atongelaki ye ndako.
48 Nzokande, Ye-Oyo-Aleki-Likolo avandaka te kati na bandako oyo bato batonga, ndenge kaka mosakoli aloba :
49 « Likolo ezali Kiti na Ngai ya bokonzi,
mpe mabele ezali enyatelo makolo na Ngai.
Ndako ya ndenge nini penza bokoki kotongela Ngai,
elobi Nkolo,
to esika ya bopemi ya ndenge nini penza
bokoki kobongisela Ngai ?
50 Boni, ezali loboko na Ngai te
nde esalaki biloko wana nyonso ? »