Pular para o conteúdo
Publicidade

Misala ya Bantoma 8

5 Filipo akendeki na engumba moko ya Samari mpe, kuna, ateyaki Klisto. 6 Bongo tango ebele ya bato bayokaki mpe bamonaki bikamwa oyo asalaki, bakangamaki na makambo oyo Filipo azalaki koloba. 7 Pamba te milimo ya mbindo ezalaki kobima kati na bato mingi na koganga makasi, mpe bato mingi oyo bakufa makolo mpe oyo batambolaka tengu-tengu babikaki. 8 Boye, bato ya engumba yango batondisamaki na esengo makasi.

Veja também