13 Kati na bimoniseli na ngai ya butu,
namonaki moto moko lokola Mwana na Moto
koya elongo na mapata ya likolo ;
apusanaki pene ya Mpaka
oyo azala liboso ya tango,
mpe bamemaki ye liboso na Ye.
14 Bapesaki Ye bokonzi, lokumu mpe nguya ;
bikolo nyonso, mikili mpe nkota bakomaki kosalela Ye.
Bokonzi na Ye ezali ya seko na seko,
ekotikala koleka te mpe ekotikala kobebisama te.