Moyize apekisaki kogumbamela banzambe mosusu
1 Tala, bosala nyonso oyo natindi bino, bobakisa to bolongola ata eloko moko te.
2 Soki mosakoli moko to moto moko oyo amonaka makambo abimi kati na bino mpe asakoleli bino bilembo minene mpe bikamwa, 3 mpe soki bilembo minene mpe bikamwa oyo asakolaki ekokisami mpe alobi na bino : « Tika ete tosalela mpe togumbamela banzambe mosusu, » nzokande bino boyebi banzambe yango te,