16 Bapesaki Yawe kanda makasi
likolo ya banzambe na bango ya bapaya,
mpe bapesaki Ye kanda na nzela ya misala na bango ya mbindo.
17 Babonzaki bambeka epai ya milimo mabe
oyo ezali Nzambe te ;
babonzaki yango epai ya banzambe oyo bango bayebaki te,
banzambe oyo ebimaki sika,
banzambe oyo bakoko na bino basambelaki te.
18 Bobosanaki Libanga oyo ebotaki bino
mpe bomonaki pamba Nzambe oyo apesaki bino bomoi.