4 Eleko moko eleki, mpe eleko mosusu eyei,
kasi mabele etikalaka kaka seko na seko.
5 Moyi ebimaka mpe elalaka,
bongo ezongaka na lombangu na esika oyo ebimelaka.
6 Mopepe ekeyi na ngambo ya sude,
ebaluki na ngambo ya nor,
ebaluki-baluki mpe ekeyi lisusu,
ezongelaka kaka banzela wana.
7 Mayi nyonso ekendaka na ebale monene,
kasi ebale monene etondaka te ;
mpe mayi yango ezongaka lisusu epai ewutaka.