Baboti mpe bana
1 Bino bana, botosaka baboti na bino kati na Nkolo, pamba te yango nde ezali sembo. 2 Tala mobeko ya liboso oyo ekangani na elaka : Okopesaka tata mpe mama na yo lokumu 3 mpo ete ozala moto ya esengo mpe ozala na bomoi ya molayi kati na mokili.