Pular para o conteúdo
Publicidade

Êxodo 32

11 Moyize abondelaki Yawe, Nzambe na ye, mpe alobaki :

Eh Yawe ! Mpo na nini kanda na Yo ekweyela bato na Yo, oyo obimisaki na Ejipito, na nguya monene mpe na loboko ya makasi ? 12 Mpo na nini bato ya Ejipito baloba : « Nzambe na bango azalaki na makanisi mabe tango abimisaki bango na Ejipito. Ezali nde mpo na koboma bango na mokili ya bangomba mpe kosilisa bango na mokili» Lembisa kanda na Yo ya makasi mpe kosala lisusu mabe te na bato na Yo. 13 Kanisa Abrayami, Izaki mpe Isalaele, basali na Yo, oyo Yo moko olapelaki ndayi mpe olobaki : « Nakokomisa bakitani na yo ebele lokola minzoto na likolo, nakopesa bango mokili oyo nyonso ndenge kaka nalobaki na bango ; mpe yango ekozala libula na bango mpo na libela»

14 Mpe Yawe asalaki lisusu te mabe oyo akanaki kosala bato na Ye.

Veja também