Ebale kowuta na Tempelo
1 Moto yango azongisaki ngai pene ya ekotelo ya Tempelo epai wapi namonaki mayi kobima longwa na ekotelo na yango : ezalaki kotiola na ngambo ya este, pamba te Tempelo ezalaki etala na ngambo ya este ; mayi ezalaki kokita na se ya ngambo ya loboko ya mobali ya Tempelo, na ngambo ya sude ya etumbelo. 2 Bongo abimisaki ngai na nzela ya ekuke ya nor, amemaki ngai mpe atambolisaki ngai zingazinga ya lopango ya libanda kino na ekuke ya libanda oyo etala na ngambo ya este. Mpe namonaki ete mayi yango ezali kotiola wuta na ngambo ya sude.